Ebandeli ya Mythologie.
Lingomba ya Babilone.
William Branham.Tanga compte mobimba na...
Eleko ya Lingomba ya Pelegamo.Babele ezali nkombo ya kala ya Babilone. Yango elimboli mobulungano. Yango ebandisamaki mpenza na Kushi, mwana ya Hama, kasi ememamaki na bokonzi ya nguya mpe ya nkembo na nse ya mwana na ye, Nimilode, mobomi-nyama ya nguya. Nimilode, engebene lisoló ya Ebandeli 11, mpe lisusu engebene mikanda ya makambo ya kala ya mokili, akanaki kokokisa makambo misato. Alingaki kotonga ekólo moko ya makasi, mpe akokisaki yango. Alingaki kopalanganisa makambo ya kosambela ya ye moko, mpe asalaki yango. Alingaki amisalela nkombo ya lokumu, akokisaki mpe yango. Misala na ye mizalaki Mpenza minene na lolenge ete bokonzi ya Babilone ebéngamaki motó ya wolo kati na biyangeli nyonso ya mokili. Koloba ete losambo na ye ezwaki lokumu mingi etalisami polele na ndenge Makomi ekokanisi yango mpenza na satana kati na Yisaya Mokapo 14, mpe na Emoniseli Mikapo 17 mpe 18. Mpe na nzela ya masoló ya makambo ya kala tokoki komonisa ete yango epalanganaki na mokili mobimba mpe ezali moboko ya losambo nyonso ya bikeko, mpe motó ya masapo, atako banzambe na bango bazali na bankombo ndenge na ndenge na bitúká ndenge na ndenge ya mokili, na kolanda minoko oyo bato balobaka. Ezali na ntina te koloba ete amisalelaki nkombo ya lokumu mpo na ye moko mpe mpo na balandi na ye: ya solo, ntango nyonso oyo eleko oyo ya lelo ekokóba (kino Yesu akomimonisa epai ya bandeko na Ye) akosambelama mpe akopesama lokumu, kasi na nkombo ekeseni na Nimilodi, mpe kati na tempelo oyo ekeseni mwa moke na oyo bazalaki kosambela ye na ebandeli.
Lokola Biblia elobelaka masolo ya bikólo mosusu na bozindo te, ekozala na ntina ete tólukaluka na mikanda ya ntango ya kala mpo na kozwa eyano na biso mpo na koyeba ndenge nini Pelegamo ekómaki efandelo ya lingomba ya Satana ya Babilone. Liziba monene ya koyeba makambo yango ekozala na mikanda ya mimesano ya Baezipito mpe ya Bagreke. Ntina ezali ete Ezipito ezwaki siansi mpe matematiki na yango epai na Bakaladi mpe Gresi, na gala na yango ezwaki yango epai na Ezipito.
Sikawa lokola banganga-nzambe bazalaki na mokumba ya koteya siansi wana, mpe lokola basiansi yango ezalaki kosalelama na boyokani na makambo ya kosambela, tosili koyeba ndenge nini lingomba ya Babilone ekómaki makasi na bikólo wana mibale. Ezali mpe solo ete ntango nyonso oyo ekólo moko elongaki ekólo mosusu, na nsima ya mwa ntango, esambeli ya molongi ekómaka esambeli ya moto oyo alongami. Eyebani malamu ete Bagreke bazalaki na bilembo ya Zodiake kaka ndenge moko na oyo ya bato ya Babilone; mpe ezwami na mikanda ya Ezipito ya kala ete Baezipito bapesaki boyebi na bango ya losambo ya banzambe mingi na Bagreke. Na boye mabombami ya Babilone epalanganaki ekólo na ekólo kino emonanaki na Loma, na Chine, Inde, mpe ata na Amerika ya Nordi mpe ya Sudi tozali kokuta lolenge moko wana mpenza ya kosambela.
Masoló ya kala mazali na boyokani na Biblia na likambo oyo ete losambo wana ya Babilone ezalaki mpenza te esambeli ya ebandeli ya bato ya liboso na mokili. Ezalaki lingomba ya liboso oyo ekendeki mosika na kondima ya ebandeli; kasi yango moko ezalaki lingomba ya liboso te. Bato na mayele ya mambi ma kala lokola Wilkinson mpe Mallett basili kopesa bilembeteli ya polele, oyo bizali na moboko likoló na mikanda ya kala, ete na ntango ya kala, bato nyonso ya mokili bazalaki kondima NZAMBE MOKO, Oyo aleki nyonso, Oyo azali seko, Oyo amonanaka te, Oyo azalisaki biloko nyonso na nzela ya Liloba ya monoko na Ye, mpe oyo na ezaleli na Ye azalaki na bolingo, na boboto mpe na boyengebene. Kasi, lokola Satana azali ntango nyonso kobebisa nyonso oyo akoki kobebisa, tomoni ete azali kobebisa makanisi mpe mitema ya bato mpo báboya solo. Lokola alukaka ntango nyonso ete bato básambela ye lokola nde azalaki Nzambe kasi mosali mpe ekelamu ya Nzambe te, amemaki losambo mosika na Nzambe mpe abendaki yango epai na ye moko mpo ete na nsuka bato bakumisa ye. Na ntembe te, akokisaki mpenza mposa na ye ya kopalanganisa esambeli na ye na mokili mobimba. Nzambe amonisaki yango polele kati na Mokanda ya Baloma: “Wana eyebaki bango Nzambe, bakumisaki Ye te lokola Nzambe, kino babungaki nzela kati na makanisi na bango, mpe mpo na molili ya mitema na bango, bandimaki esambeli ya lokuta kino na kosambela bikelamu, kasi Mozalisi te.” Bóbosana te, Satana azalaki ekelamu ya Nzambe (Mwana na Ntongo). Na boye tozali komona ete esika liboso solo epalanganaki kati na bato, mpe bato nyonso bakangamaki na solo wana moko, mokolo moko eyaki wana etuluku moko monene ya bato oyo batikaki Nzambe mpe bapalanganisaki lolenge moko ya kosambela ya diabulu na mokili mobimba. Mambi ma kala ezali kotalisa ete bato ya libota ya Semi oyo batikalaki na ngámbo ya bosolo oyo ebongwanaka te batelemelaki makasi bato ya libota ya Kama oyo batikaki solo mpe balandaki lokuta ya Zábolo. Tozali na ntango te mpo na kolobela yango; tozali kolobela yango bobele mpo ete bókoka komona ete ezalaki na lolenge kaka mibale ya kosambela, mpe oyo ya mabe epanzanaki mokili mobimba.
Kosambela Nzambe bobele moko ekómaki ya banzambe mingi na Babilone. Lokuta mpe mabombami ya zabolo etombwamaki mpo na kotélemela bosolo mpe mabombami ya Nzambe na engumba yango. Satana akómaki mpenza nzambe ya mokili oyo mpe aséngisaki bato oyo akosaki ete básambela ye, mpe yango ememaki bango bándima ete azali solo Nkolo.
Losambo ya banzambe mingi ya monguna ebandaki na liteya ya bósato. Ezalaki mosika kuna na ntango ya kala nde likanisi ya “bato misato kati na Nzambe moko” ebandaki. Ezali mpenza likambo ya kokamwa ete bato ya teoloji ya mikolo na biso bamoni yango te; na ntembe te bakosami na satana lolenge moko na bankóko na bango, bazali kokóba kondima ete bato bazali misato kati na Bonzambe. Bolakisa biso esika bobele moko kati na Makomi epai wapi liteya yango endimami. Ezali likambo ya kokamwa te ete na ntango bakitani ya Kama bakobaki nzela na bango kati na losambo ya satana oyo etongami likoló na likanisi ya banzambe misato, ezali na elembo ata moko te oyo ezali kotalisa bakitani ya Semi kondima likambo ya motindo wana to kozala na molulu moko ya kosambela oyo ekokani na wana? Ezali likambo ya kokamwa te ete Baebele bandimaki ete, “Yoka, Ee Yisalaele, Nkolo Nzambe na yo azali Nzambe MOKO”, soki ezalaki na bato misato kati na Bonzambe? Abalayama, mokitani ya Semi, na Ebandeli 18 amonaki bobele Nzambe moko ná banje mibale.
Sikawa ndenge nini bosato yango etalisamaki? Bazalaki kotalisa yango na lolenge ya liyemi ya mbataisáto ikokani, kutu ndenge etalisami na Loma lelo oyo. Likambo ya kokamwa, Baebele bazalaki na likanisi ya motindo wana te. Boye, nani nde azali na elonga? Ezali Baebele to bato ya Babilone? Na Azia, likanisi ya banzambe mingi oyo elobaka, banzambe misato kati na moko, etalisami na ekeko oyo ezali na mitó misato likolo na nzoto moko. Atalisami lokola mayele misato. Na Inde, bazwaki yango na mitema na bango ete batalisa ye lokola nzambe na mitindo misato. Yango ezali solo teoloji ya mikolo na biso. Na Japon ezali na ekeko moko monene ya Buda oyo ezali na mitó misato, lokola ekeko oyo tolobelaki liboso.
Kasi oyo ezali komonisa polele koleka kati na yango nyonso ezali oyo etalisi likanisi ya bosato ya Nzambe na nzela ya makambo misato oyo : 1 Motó ya mobangé mobali oyo azali elilingi ya Nzambe Tata, 2 Zólóngánó moko oyo kati na mabombami elingaki koloba “Momboto”, oyo na gala na yango elingi koloba Mwana. 3 Mapapu mpe mokila ya ndeke (ebenga). Talá malakisi ya Tata, Mwana mpe Molimo Mosantu, bato misato kati na Bonzambe, bosato ya solo. Okoki komona likambo moko wana na Loma. Sikawa tika natuna mbala moko lisusu; ezali likambo ya kokamwa te ete zabolo mpe basambeli na ye bazalaki mpenza na bosolo mingi oyo emonisami koleka tata ya kondima, (Abalayama) mpe bakitani na ye? Ezali likambo ya kokamwa te ete basambeli ya Satana bayebaki makambo mingi na ntina na Nzambe koleka bana ya Nzambe? Nzokande yango nde bato ya teoloji ya mikolo na biso bazali koluka koyebisa biso ntango balobaka na ntina na bosato. Kobanda sikawa, bóbosana likambo oyo te, mikanda oyo mizali solo, mpe likambo oyo lizali solo: Satana azali mokosi mpe tata na lokuta, mpe ntango nyonso amemi pole moko boye, ezali kaka lokuta. Azali mobomi. Mpe malakisi na ye ya bosato esili kobebisa ebele ya bato mpe ekokoba kobebisa kino Yesu akoya.
Engebene na mambi ma kala, ezwaki ntango molai te mpo mbongwana esalema na likanisi oyo ya Tata mpe Mwana mpe Molimo Mosantu. Satana amemaki bango mokemoke mosika na bosolo. Likanisi ya Bonzambe oyo ebimaki ezalaki sikawa : 1 Tata ya seko, 2 Molimo ya Nzambe ekoti na nzoto kati na mama ya MOTO. (Yango ezali kotinda bino bokanisa?) Mwana ya Bonzambe, mbuma ya bokotI kati na nzoto wana, (momboto ya Mwasi).
Kasi Zabolo asepeli te. Alongi naino te ete bato basambela ye, loba kaka na lolenge ya polele te. Na yango, azali kokoba kobenda bato mosika koleka na bosolo. Na nzela ya mabombami na ye, amonisi epai na bato ete lokola Nzambe, tata monene oyo amonanaka te, amitungisaka te na makambo ya bato, kasi atikalaka kimya na ntina na bango, na yango ekozala malamu mpo na bango mpe kosambela ye na kimya nyonso. Na koloba solo, yango elingi koloba koboya kotalela ye na ndenge oyo ekoki, soki te koboya ye mobimba mpenza. Malakisi yango epalanganaki mpe na mokili mobimba, mpe lelo oyo na Inde okoki komona ete batempelo oyo batongá mpo na mozalisi monene, nzambe oyo alobaka te, ezali mingi te.
Lokola ezalaki na ntina te kosambela tata-mozalisi, ezalaki mpenza na ndenge ya bomoto ete losambo ebalukaki epai na “Mama mpe Mwana” lokola biloko ya kosambela. Na Ezipito, ezalaki mpe na lisanga moko wana ya mama ná mwana oyo babengamaki Isis ná Osiris. Na Inde, babengamaki Isi ná Iswara. (Botáala ata bokokani ya bankombo.) Na Azia ezalaki Cybele mpe Deoius. Na Loma mpe na Grèce, basalaki mpe bongo. Na Chine mpe lokola. Na yango, kanisá ndenge bamisionele mosusu ya Lingomba Katoliko ya Loma bakamwaki ntango bakómaki na Chine mpe bakutaki kuna ekeko ya Malia ná Mwana, na kongenga ya pole oyo ezalaki kobima na motó ya mwana yango. Ekeko wana ekokaki mpe na yango kopesama na esika ya oyo ezali na Vatican, bamonaki bobele bokeseni moke na elongi.
Ebongi na biso sikawa koluka koyeba mama mpe mwana ya ebandeli. Nzambe-mwasi-mama ya liboso ya Babilone ezalaki Semiramis, oyo azalaki kobengama Rhea na mikili ya esti. Na maboko na ye amemaki mwana mobali, oyo atako azalaki naino mwana moke, elobami ete azalaki molai, makasi, kitoko mpe azalaki mingimingi kobenda basi. Na Ezekiele 8: 14 babengaki ye Tamuzu. Kati na bakomi ya kala, bazalaki kobenga ye Bacchus. Mpo na bato ya Babilone, azalaki Ninus. Yango elimboli likambo oyo ete azalaki kotalisama lokola mwana moke oyo bamemi na maboko mpe na mbala moko azalaki komonana lokola moto monene mpe ya nguya, yango wana ayebani lokola “Mobali-Mwana”. Moko na bibiangelo na ye ezalaki “Mobali ya Mama”, mpe na Inde, esika bango mibale bayebani na nkombo ya Iswara ná Isi, ye (mobali) atalisami lokola mwana moke na mabele ya mwasi na ye moko.
Tanga compte mobimba na...
Eleko ya Lingomba ya Pelegamo.