Konetolama.


  Série Liloba ya Bomoi.

Konetolama.


William Branham.

Tanga compte mobimba na...
Konetolama.

Nzembo 27:4-5,
4 Nasengi na YAWE eloko moko yango nde nazali koluka; ete nafanda na ndako na YAWE mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kotala kitoko ya YAWE, mpe kotala na botondi tempelo na Ye.
5 Mpo Akobatela ngai na ndako na Ye na mokolo na likama; mpe Akobomba ngai na nkuku ya hema na Ye; Akotelemisa ngai likolo na libanga.

Sikawa, Nzambe azali na lolenge moko ya kosala makambo. Mpe Abongolaka lolenge na Ye ya kosala te. Abongolaka lolenge na Ye ya kos... Azali Nzambe oyo abongwanaka te. Na Amose 3:7, Alobaki: “Akosala likambo moko te na mokili kino ete Amonisa yango na basali na Ye basakoli.” Mpe kaka ndenge Alakaki yango, Akosala yango.

Sikawa, toleki na bileko ya lingomba. Kasi elakelamaki na biso ete na mikolo na suka, engebene na Malaki ya 4, mosakoli moko akozonga lisusu na mokili. Ya solo. Botala lolenge na ye, ndenge nini akozala. Azali ntango nyo...
Nzambe asaleli molimo yango mbala mitano: mbala moko kati na Eliya; kati na Elisa; kati na Yoane Mobatisi; mpo na kobenga Lingomba ete ébima, mpe mpo na Bayuda oyo batikali. Mbala mitano: “ngolu,” Y-e-s-u, k-o-n-d-i-m-a, mpe ezali motángo ya ngolu. Bomoni? Malamu.

Sikawa, bobosana te, Nsango elakamaki. Mpe lokola mabombami nyonso oyo ekotisamaki mpenza mobulu na nzela ya etonga ya bakonzi ya lingomba, ekosenga ete mosakoli moko oyo auti mbala moko epai na Nzambe amonisa Yango. Mpe yango mpenza nde likambo Alakaki kosala. Bomoni? Sikawa, bobosana te, “Liloba na Nkolo eyaka epai na mosakoli,” kasi epai na moto ya teoloji te. Mosakoli, azali motalisi ya Liloba na Nzambe. Akoki koloba eloko moko te; akoki koloba makanisi na ye moko te. Akoki bobele koloba makambo oyo Nzambe amonisi. Ata mosakoli Balama ntango amekamaki mpo na komiteka, koteka makoki na ye, alobaki: “Ndenge nini mosakoli moko akoki koloba eloko mosusu soki ezali oyo Nzambe atie na monoko na ye te?” Ezali eloko oyo Nzambe asalaka, oyo ezali kopekisa yo oloba eloko mosusu. Mpe yo obotami lolenge wana. Okoki bobele kosala...

Lokola Soki okoki koloba: “Na-na-nakoki kofungola miso te,” na ntango oyo ózali kotala. Bomoni? Okoki te. Okoki kosembola loboko na yo te, na ntango oyo okoki kosala yango. Bomoni? Okoki kozali mbwa te na ntango ozali moto. Bomoni? Osalemá se bongo.
Nzambe mpe lokola, ntango nyonso, na bileko, na nzela ya Yisaya, Yilimia ná bamosusu, Eliya, kati na bileko bileká. Ntango etonga ya bakambi ya mangomba bazali kobebisa mpe kosangisa makambo nyonso, Nzambe azalaki kotinda mosakoli, kobimisa ye uta na esika oyo eyebani te. Azalaki kati na makambo na bango te, mpe azalaki bobele koloba Liloba na Ye. Na nsima azalaki kolongolama; bazalaki bato ya makambo makasi oyo batelemi mpenza na Bosolo ya Nzambe. Mpe ezalaka ntango nyonso ndenge wana nde okoki koyeba ye. Alobaki: “Soki moto moko kati na bino azali moto na molimo to mosakoli...”

Sikawa, basakoli. Na kati na Losambo, “likabo ya lisakoli” ezalaka; kasi mosakoli akanamaki mpe abongisamaki liboso mpo na eleko. Bomoni? Iyo, mbuta muntu. Sikawa soki lisakoli moko epesami, bato mibale to misato basengeli kofanda mpe kotala soki ezali solo to te, liboso ete losambo éyamba yango. Kasi moto moko te azalaki kosala bongo mpo na mosakoli, mpamba te ye azalaki-azalaki mpenza Liloba na Nzambe. Azalaki Liloba wana na eleko na ye. Bomoni, Nzambe komitalisa. Sikawa, Nzambe alakaki ete Akotindela biso lisusu yango na mikolo na suka, mpo na kobimisa Mwasi na libala libanda na potopoto ya mangomba oyo, na lolenge bobele moko oyo ekoki kosalema.

Yango kosalema soko moke te; lingomba ekoki koyamba Klisto te. Biso, ba-Pantekotiste, tokoki te kokoba komema Nsango oyo na lolenge oyo lingomba ezali kati na yango lelo. Ndenge nini tokoki kokokisa yango na ntango na suka na lolenge bazali lelo, na ntango moto nyonso azali kotelemela moto mosusu, mpe makambo mosusu nyonso na oyo etali lingomba? Oh, mawa! Ezali mpenza mobulu. Basili kokoma bibongiseli. Mpe ata na ntango nini... Nazali kosenga na moto nyonso ya mambi na kala atalisa ngai soki ezali bongo te. Mbala nyonso nsango moko ezalaki koteyama na mokili, mpe ntango bazalaki kokomisa yango ebongiseli, ezalaki kokufa kaka wana. Mpe Pantekote esalaki likambo moko oyo bango nyonso basalaki, Pantekote oyo ebimaki.

Bino, ba-Assemblée de Dieu, ntango batata mpe bamama na bino babimaki na bibongiseli kuna na ntango ya Lisanga Monene ya kala, bagangaki mpe bakumisaki Nzambe, mpe balobaki kotelemela makambo yango. Nsima bozali kobaluka, “lokola mbwa azali kozongela bisánza na ye, mpe ngulu potopóto na ye,” mpe kosala likambo moko oyo bango basalaki. Mpe sikawa bokomi mpenza bato na mangomba na lolenge ete bokangi mabumu ya mawa na bino. Esengeli mpenza kozala na kalati ya bondeko liboso kutu ya kosangana na bino elongo.

Bino bato ya Bonzambe moko, Nzambe apesi bino nsango ya lolenge wana, mpe na esika ya kokende liboso, kokoba mpenza na komikitisa mpe kokende liboso, bino bomilongoli mpe bokómisi etonga na bino ebongiseli. Mpe bino nyonso bokómi wapi? Kati na katini moko. Ya solo. Kasi Molimo na Nzambe ezali kokoba kokende liboso. “Ngai Nkolo nalonaki yango. Nakosopela yango mai, butu na moi. Mpo ete ba mosusu ba...” Abongisaki makambo oyo mpo ete ezala, mpe Asengeli kotinda Oyo.

Likambo ya liboso oyo ezali kosalama ntango Abandi kokita longwa na Likolo, ezali koganga makasi. Ezali nini? Ezali Nsango, mpo na kosangisa bato elongo. Nsango moko ezali kosakolama liboso. Sikawa ezali ntango ya kobongisa miinda: “Bótelema mpe bobongisa miinda na bino.” Ezalaki kokengela ya boni? Ya nsambo, ya motoba te. Ya nsambo: “Tala, Mobali na libala ayei. Botelema mpe bobongisa miinda na bino.” Mpe basalaki yango. Bamosusu kati na bango bamonaki ete bazalaki na Mafuta ata moke te kati na miinda na bango. Bomoni? Kasi ezali eleko ya kobongisa miinda. Ezali ntango ya Malaki ya 4. Oyo Ye alak... Ezali Luka 17. Ezali-ezali Yisaya-... Masakoli nyonso oyo mpo ete ekoka kozala na molongo mpo na mikolo oyo, kati na Makomi, tomoni yango kokokisama kaka awa. Eloko moko te...

Tozali komona makambo oyo kosalema, bandeko na ngai mibali mpe basi. Mpe Nzambe na Likolo ayebi ete nakoki kokufa na eteyelo oyo ata sikawa. O-osengeli bobele kotambola mwa moke. Ezali mpenza... Ezali kitoko, ntango omoni Nzambe kokita uta na Lola, kotelema liboso na bitonga ya bato, mpe kotelema wana, komimonisáká bobele lolenge Asalaka yango. Mpe yango ezali Solo, mpe Biblia oyo efungwami. Bomoni? Ya solo. Tokómi wana.

Mpe mimesano ya bibongiseli ekufi. Esili. Ekotelema lisusu te. Ekotumbama. Yango nde bosálaka na mposo na elanga. Bokima mosika na yango. Bokota kati na Klisto. Boloba te: “Nazali moto ya ba- Metodiste. Nazali moto ya ba-Batiste. Nazali moto ya ba-Pantekotiste.” Yo kota nde kati na Klisto. Soki ozali kati na Klisto, Liloba moko te ezali oyo ekomami na kati Awa oyo yo okozanga kondima. Ezali na ntina te likambo moto mosusu alobi. Mpe na sima Nzambe azali komonisa likambo yango polele. Mpo ete, yo, ntango Asopi Molimo likolo na Liloba, nini esalemi? Kaka lokola kosopa mai na momboto nyonso. Yango ekobika, mpe Ekobota engebene na lolenge na Yango.

Yo okoloba: “Nazui libatisi ya Molimo Mosantu.” Yango elingi koloba te ete obikisami, ezali mosika na yango.
Tala awa. Ozali na biteni misato. Ozali bongo. Kati na mwana mobali moke oyo, ezali na bomoto ya kati, oyo elandi ezali molimo, mpe na nsima ezali nzoto. Sikawa, ozali na biyokeli mitano kati na nzoto oyo, mpo na kokota na boyokani ná ndako na yo ya mokili. Yango ezali na boyokani ná makambo oyo etikali te. Ozali na biyokeli mitano ya molimo, awa: bolingo mpe lisosoli, mpe bongo na bongo, kati na yango. Kasi awa na kati nde esika ozali kobika. Yango nde oyo yo ozali.

Yesu alobaki te ete “Mbula enokaka likolo ya bayengebeni ná bato mabe”? Soki oloni matiti mabe awa mpe masangu kuna, mpe osopeli yango mai, mpe otika yango na mabele oyo ezali na vitamini ná mpe biliko ya bongo, yango nyonso mibale ekobika na mai moko wana te? Ya solo mpenza. Ee, ezali nini? Moko na bango ekobimisa matiti mabe, mpo ete yango nde nyonso oyo ye azali. Matiti mabe ekotombola maboko mpe ekosepela kaka lokola masango.

Biblia elobi te ete: “Na mikolo na suka, baklisto ya lokuta bakoya? [Losambo elobi: ”Amen.“ - N.D.E.] Ezali te ”Yesu ya lokuta,“ sikawa. ”Ba-Klisto ya lokuta,“ bapakolami, bapakolami ya lokuta na oyo etali Liloba; bazali na kopakolama ya bibongiseli, kasi ya Liloba te. Mpamba te, Liloba ekopesa litatoli na ntina na Yango moko. Ezali na ntina ya eloko mosusu te. Ekopesa litatoli epai na Yango moko. “Mpe bapakolami ya lokuta bakoya.” Bozali na bande na ngai likolo na yango. Mpe bapakolami yango... Oh, soki okoki kobenga moko na bango, olobi: “Oh, yo, ozali nde Yesu moko?” “Oh, soko moke te.” Bakondima yango te. Kasi ntango ekomi na: “Oh, nkembo! Nazali na kopakolama!” Mpe ezali kopakolama ya solosolo. Bobosa na te, Kaífa azalaki na Yango lokola, mpe asakolaki. Balama mpe azalaki na Yango, ye mpe asakolaki. Kasi yango ezali na eloko moko ya kosala te na oyo ezali na kati. Loba kaka soki yango ezalaki momboto na Nzambe, makila na Ye longwa na ebandeli, mpe ekanamaki liboso, osili kobunga. Ata soki ogangi ndenge nini, olobi minoko ya sika, opoti mbangu, ogangi. Yango ezali na eloko moko te ya kosala. Lititi mabe akoki kolikia kaka lokola bamosusu nyonso. Nasílá komona bapagano kotelema, mpe koganga, koloba minoko na sika, mpe komela makila na mokuwa ya motó ya moto, mpe kobenga zábolo. Bomoni? Na boye okoki te... Mayoki nyonso mpe biloko mosusu, bosana yango. Ezali nde motema na yo kati na Liloba oyo, mpe Liloba ezali Klisto. Mema yango kuna na kati, mpe tala Yango moko komitalisa, ndenge Ezali kofungwama lokola momboto nyonso mosusu, mpe Komisakola Yango moko mpo na eleko oyo Ezali kobika kati na yango.

Luther akokaki komema eloko mosusu te kasi bobele matiti mikie mikie. Bamisusu bakokaki komema makambo misusu wana. Tozali sikawa na eleko ya masangu. Luther, ba-Lutherien ya solosolo basengelaki kobimisa Luther ya solo. Pantekote ya solosolo esengelaki komema pantekote ya solosolo. Esili. Kasi tosili koleka eleko wana, mpe tozali kokoba. Boyebi, lingomba Katoliko ebandaki na pantekote? Mpe soki lingomba ya ba-Pantekotiste ekowumela mibu nkoto mibale, ekozala mpenza mabe koleka lolenge lingomba Katoliko ezali lelo. Ya solo mpenza. Nazali koloba yango na bandeko na ngai mibali ná mpe bandeko na ngai ya basi, oyo nalingaka. Mpe Nzambe ayebi yango. Kasi bobosana te, baninga na ngai, nakokutana na bino kuna na Kosambisama. Mpe yango ekoki kozala lisusu mosika te. Nasengeli kopesa litatoli ya oyo Solo ezali.

Ntango nakendeki na mayangani elongo na bino, kobondeláká mpo na babeli, ezalaki malamu. Kasi, ntango nayákí na Nsango! Soki Nsango moko eteyami, ezali Nsango ya solo... Soki ezali ya solo, makamwisi ya solosolo ya Nzambe, mpe atikali bobele kati na ebongiseli yango, boyebi na bongo ete azali ya Nzambe te, mpamba te likambo yango esilá kosakolama. Yesu akendeki mpe Abikisaki babeli mpo na kobenda bokebi na bango, ya bato, na nsima Nsango na Ye eyaki. Ezali solo.

Esengeli kozala na eloko moko oyo Nzambe alingi kotalisa. Azali bobele ... Lobiko na nzoto kouta na Nzambe, makamwisi lokola wana, kaka mpo na kobenda bokebi ya bato. Likambo ya motuya kati na yango ezali nde Nsango. Ezali nde yango, oyo euti na kati awa. Azali koluka ete bato batyela Ye motema, na yango bakofanda mpe bakoyoka Ye, bomoni, mpo ezali na bamosusu oyo babongisami mpo na Bomoi. Ndambo na mbuma ya masangu, ekweyaki na mabelé, bandeke baliaki yango. Mpe misusu mikweyaki kati na ba-nzube. Mpe eteni mosusu ekweyaki na mabelé oyo ebongisamaki, ebongisamaki liboso, mpe yango ebotaki.

Sikawa, likambo ya liboso, ezali koyulama ya kelelo. Eloko ya liboso ezali kelelo mpe... to mongongo... Koganga makasi; na sima mongongo moko; na sima kelelo.
Koganga makasi: motindami azali kobongisa bato.
Likambo ya mibale ezali mongongo ya lisekwa; mongongo moko wana, oyo, mongongo makasi na Santu Yoane 11:38-44, oyo ebengaki Lazalo libanda na nkunda.
Kosangisa Mwasi na Libala elongo; mpe na nsima lisekwa ya bakufi, bomoni; mpo na kamatama na konetolama. Sikawa botala makambo misato yango kosalema. Oyo elandi ezali nini? Ezalaki kelelo. Mongongo... Koganga makasi; mongongo; kelelo.

Sikawa, likambo ya misato, ezali kelelo. Oyo, ntango nyonso, na Elámbo na Bakelelo, ezali kobenga bato ete baya na elámbo. Mpe wana ekozala Elambo ya Mwasi na Libala, Elambo ya Mwana na Mpaté ná Mwasi na Libala na likolo. Bomoni? Likambo ya liboso oyo ezali koya ezali Nsango na Ye, mpo na kosangisa Mwasi na libala. Likambo oyo elandi ezali lisekwa ya Mwasi na Libala oyo alali; oyo akufaki kalakala na bileko mosusu, bakozwamna na konetolama elongo. Mpe kelelo, Elambo na likoló, na mapata. Ee, yango nde likambo oyo ezali kosalema, baninga.

Tokómi mpenza wana, tobelemi sikawa. Likambo bobele moko ezali ete Lingomba oyo ezali kobima, esengeli kotiama liboso na Mwana, mpo na kotela. Ebuki mbuma monene ekoya na mwa ntango moke. Mbuma ekotumbama, banzete, kasi mbuma ekosangisama na ebombelo na Yango.

Tanga compte mobimba na... Konetolama.


Libombami ya Klisto.

Site ya sango ya
Lingelesi.

Mokanda ya
Emoniseli série.

Nzambe na Siansi.
Index - Arkeoloji.

Konetolama.

 

Mateya mosusu ya
Ntina ya nsango.

Nsango malamu.
Yesu akufaki mpo
na masumu na yo.

Batisimo na Mai.

 
 

Lipata oyo eleki
ya bomoto.

Likonzí ya mɔtɔ.

 

Bonzambe elimbolami.

 

Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Eleko ya Lingomba
sambo.

Bikangelo Sambo.

Série Kotambola ya
Bakristu.

Nkombo ya Nzambe.

Nzambe na Histoire.
Masuwa ya Noa.

Arkeoloji.
Sodome mpe Gomore.

Lisumu ya ebandeli.
Ezalaki nde Pomme?

Mythologie.
Lingomba ya Babilone.

  Makomi elobi...

pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso.

Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.

Yango wana, bolendisanaka na maloba oyo.

1 Batesalonika 4:16-18


Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba to PDF.


Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Mai uta na Libanga.

William Branham
Life Story.

(PDF Lingelesi)

How the Angel came
to me.
(PDF Lingelesi)

Pearry Green personal
testimony.

(PDF Lingelesi)

Marriage and Divorce.

(PDF Lingelesi)

As the Eagle
Stireth her nest.

(PDF Lingelesi)

Chapter 14
- Sabino Canyon

(PDF Lingelesi)


Hub ya Nsango... Pona monoko na yo mpe kozwa bansango oyo euti na Ndeko Branham.