Lipata oyo eleki ya bomoto.
Mapata ya likolo.
Pearry Green.Luka 21:25-27,
25 Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto ; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene.
26 Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama.
27 Sima na yango, bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya mpe na nkembo monene.Milongo oyo ya makomi etangami uta bankama ya mibu. Ntango nyonso na makanisi ya bato, komonana ya mapata mpe komonana ya Yesu Klisto ekangisamaki. Ata bato ya mayele ya teoloji oyo bandimaka bozongi ya Nkolo na mabele, mpo na kozwa mwasi na ye ya libala, basali boyokani oyo na makanisi na bango. Nzokande ba teoloji kaka wana bakoki kozanga koya na ye ya mibale mpo ete, atako bapesaki ye “miso mpo na komona mpe matoyi mpo na koyoka”, bakoboya kosalela maye mpo na koyeba makambo maye Nzambe alakaki o liloba lya ye, maye malingaki kozala yambo ya boyei bwa mibale bwa Klisto.
Matayo 24, kobanda na vɛrsɛ 23 ezali mpe litatoli ya mikolo oyo ekosalema liboso ya koya ya Klisto,
23 Na tango wana, soki moto moko alobi na bino: «Klisto azali awa!» to «Azali kuna,» bondima ye te.
24 Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.(Simbá ete Yesu alobaki te “ba Yesu ya lokuta” kasi [bamasiya ya lokuta] “bapakolami” ya lokuta, baoyo bazali na kopakolama ya solo, kasi baoyo balobaka oyo ezali solo te, ba monɔkɔ ya lokuta.)
Yesu azalaki kokebisa na bokosi na koya ya mibale, kasi alakaki ete baponami bakokosama te, baoyo bankombo na bango ekomamaki na buku ya bomoi ya mwana-mpate banda liboso ya moboko ya mokili, mpe bakanisami liboso mpo na kokokana na elilingi ya Yesu Klisto. “Mpe baoyo akanaki liboso, bango mpe abengaki mpe alongisaki bango, mpe apesaki bango mpe nkembo.” Yesu alobi atako ete ekobima baoyo bato bakoloba mpo na bango “Talá mopakolami moko! Tala oyo azali na liloba!” Na Matayo 24:25 akobi ete:
25 Namiyebiseli bino mpo ete bosala keba!
26 Soki moto moko alobi na bino: «Botala, azali kati na esobe,» bokende kuna te; to «Azali awa, kati na esika ebombama,» bondima yango te.Kati na mangomba lelo ezali na baye bakolinga kondima, kondima ya mangomba, to liteya koleka Liloba. Bazali kokokisa makomi oyo, mpo balobi: “Talá liloba, talá kopakolama mafuta. Biso ba membres ya conseil, bakambi, tokutani na privé, kolukaka Nkolo. Sikawa tobimi mpe tozali koyebisa bino ete oyo ezali Liloba.” Balukaka emoniseli ya moto ye moko mpe batindika yango na makasi likolo ya balandi na bango. Bomikundola Ye azali Liloba. “Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe... Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso,...”
Kozanga emoniseli balimboli makomi, lokola Matayo 24:27,
27 Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala.
Na makomi oyo, bazelaka ete Yesu Klisto apumbwa likoló ya likoló, kogangaka bozongi na ye mpo na komema mwasi na ye ya libala. Baoyo bateyaka likambo yango babosanaka makomi oyo alobi polele ete bozongi na ye ekozala “lokola moyibi na butu.”
Tala na civilisation; ezalaki kosala mobembo longwa na ɛsti kino na wɛsti. Tala boklisto, etambolaki depuis est ti na este. Talá moi; emati na ɛsti mpe elalaka na weste. Nzambe abandaki nsango ya momemi-nsango moko na moko epai ya mbula mokomoko ya lingomba na ɛsti mpe momemi-nsango ya nsuka abimaki na wɛsti, komema mabombami ya Nzambe na nsuka, lokola esakolamaki na Emoniseli 10:7.
Yango wana soki makambo oyo eleki ya bomoto esengelaki komonana epai ya bato oyo bazali na bomoi na mikolo ya nsuka liboso ya koya ya Nkolo, makambo yango elingaki kosalema na wɛsti. Mpo “lokola nkake ezali kobima na este,... na weste,” ndenge moko mpe Yesu Klisto amimonisi banda na ɛsti tii na wɛsti na nzela ya bamemi-nsango nsambo oyo. Lokola moko na moko amemaki nsango na ye bongo emoniseli ekobaki, kopanzana elongo na moko na moko: Luther oyo amemaki kolongisama; Wesley, bosantu, ba pantekote, kokweya ya Molimo Mosantu na ebandeli ya eleko oyo ya Laodikia; mpe sikawa kino na kokokisama na nsango oyo epai ya mwasi ya libala esika wapi mabombami maye malobamaki na momemi-nsango oyo mpe bilembo kutu efungwami.
Matayo 24:28,
28 Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka [aigles] bibembe esanganaka wana.Yango wana baanzelu na ye bakoyanganisa ba aigles, baoyo bazali kobika na eleko oyo, eleko ya ba aigles. Ba aigles baliaka misuni ya sika, te mpo na “kosanza” oyo ekotondisa “bamesa” nyonso ya mangomba (Yisaya 28:8), kasi mpo na misuni ya sika ya liloba. Wana nde esika ba aigles bakosangana. Lokola liloba oyo ekobima, ndenge moko mpe bato bakosangana baye bandimi yango, lokola Nzambe abengi bango.
Matayo 24:29-30,
29 Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, «moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama.»
30 Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.Likambo mosusu oyo elobeli koya ya mwana ya moto, na Daniele 7:13,
13 Kati na bimoniseli na ngai ya butu, namonaki moto moko lokola Mwana na Moto koya elongo na mapata ya likolo;...
Daniele na kondimana ya kala kutu atatoli boyei ya mwana ya moto lokola azali na boyokani na mapata. Ndenge moko mpe Yesu, mbala nyonso oyo azalaki kolobela koya na ye ya mibale, alobelaki mapata.
Na Arizona, bongo chambre ya commerce esakoli, ntuku mwambe na mitano likoló na monkama ya ntango, mapata ezalaka te na likoló. Kasi na mokolo ya 28 février 1963, lipata moko ya kokamwa ebimaki na lola ya Arizona oyo elakisami na elilingi, na lisolo moko oyo ekomamaki na Dr James McDonald. Azalaki profesɛrɛ ya fiziki ya mopɛpɛ na iniversite ya Arizona, mpe abimisaki yango na zulunalo Science Magazine, na mokolo ya 19 Aprili 1963. Basengaki bato kotinda ba photos nionso oyo ezali to ba informations misusu oyo ekoki ko éclairer origine ya lipata oyo.
Pourquoi intérêt na lipata moko? Bobele mpo na bonene mpe bosanda na yango ya kokamwa, oyo etangami na trigonométrie uta na bafoto ntuku mwambe ya bizarre, lokola ezali na bosanda ya bakilometele ntuku mibale na motoba, bolai ya bakilometele ntuku mitano mpe bonene ya bakilometele ntuku misato. Komona yango eutaki na bakilometele nkama mibale na ntuku mwambe na ngambo moko mpe mingi na ngambo mosusu uta na ntaka ya kilometele koleka nkama moko. Likambo ya kokamwa ya lipata oyo etikalaki kongenga na pole ya moi miniti ntuku mibale na mwambe nsima ya kolala ya moi. Likolo koleka atmosphère (na espace), likolo ya plafond ya vol ya ba avions, koleka esika humidité ekoki kosalama mpe ko condenser, mpe ekoki kosalema te ete eutaki na fusée mpo na eteni monene ya mai oyo esengeli kozala na yango, lipata monene yango etikali likambo ya kokamwa ya siansi.
Ba rédacteurs ya magazine ‘Bomoi’ bakutanaki na article oyo na Science, mpe na mokolo ya 17 Mai, 1963, ebimisaki elilingi ya lipata oyo na maloba oyo, “Lipata oyo ezali molai mingi, mpe monene mingi mpo na kozala solo, kasi atako bongo, awa ezali fɔtɔ́ na yango!” Nayekolaki lipata mpo na mbala ya yambo uta na nimero oyo ya Bomoi. Ntango nazali kotala nsima, namoni ete lisolo yango esepelisaki ngai, nzokande natyaki ntina moko te ya sipesiale na yango. Lokola mosali ya nsango malamu mobimba, atondisami na Molimo Mosantu, nandimaki ete nazalaki mosangani ya mwasi ya libala ya Klisto, kasi na ntango wana nazalaki na molimo te mpo na kososola ete Yesu Klisto alobaki ete bozongi na ye ekozala elongo na mapata. Boniboni komikitisa, na kotalaka nsima, kososola ete nakangaki te ntina moko ya koleka ya bomoto na oyo ekokaki te kolimbolama na lolenge ya bomoto na siansi. Ezalaki kaka na 1964 ete nayokaki na ntina ya bosolo na ntina ya makambo ya kokamwa oyo esalemaki ntango lipata oyo ebimaki likolo ya Arizona.
Na mokolo ya 22 Desɛmbɛ 1962, sanza mibale liboso ete lipata ebima, Ndeko Branham azwaki emonaneli ntango afandaki na biro na ye na Jeffersonville, na etúká ya Indiana. Ezalaki moko ya bankóto ya bimonaneli oyo azwaki na ntango ya bomoi na ye. Na mokolo ya 31 Desɛmbɛ 1962, ayebisaki emonaneli yango epai ya lisangá na ye na Tabernacle ya Branham, na Jeffersonville. Maloba na ye eyokanaki na bato pene na nkama motoba oyo bazalaki wana na butu wana mpe ekangamaki na kasɛti ntango azalaki komema lisukulu na ye oyo ezalaki na motó ya likambo “Oyo ezali ntango ya nsuka, Bankolo?”
Ayebisaki lolenge nini na emonaneli azalaki na mopanzi ya ngomba, kolongolaka cocklebur na makolo ya pantalon, ntango na mbalakaka akamwaki na bopanzani ya makasi, nsima akendeki kotala na baanzelu nsambo. Andimaki na lisangá ete ayebaki ndimbola ya emonaneli yango te. Emonaneli yango etungisaki ye mingi, mpe na baposo oyo elandaki alobelaki basusu ete mbala mosusu mokano ya Nzambe na bomoi na ye ekokisamaki mpe asengelaki kobomama na bopanzani. Amitunaki soki baanzelu yango basengelaki komema nzoto na ye mosika lokola esalemaki mpo na Moize.
Mwa moke nsima ya likambo oyo na emonaneli, akendaki elongo na libota na ye na Tucson, Arizona mpe azwaki esika ya kofanda kuna. Asakolaki mwa mateya mpe abandaki kokokana na bomoi na lisanga oyo ya esobe, kasi atako bongo emonaneli ezalaki kotungisa ye. Ntango na ye esengelaki kosila mosika te? Elingaki kozala mokolo nini?
Lokola azalaki moto ya libándá mpe mobomi-nyama, amimonaki ete azalaki kosepela na lisano moko oyo alingaka mingi na esika yango, elingi koloba kobundisa ngulu ya zamba ya esobe oyo eyebani na nkombo Javelina. Ezalaki na boumeli ya mobembo ya kobundisa banyama ndenge wana nde emonaneli oyo ezalaki kotungisa ekokisamaki.
Dati ezalaki le 7 Mársi 1963. Ezalaki tongo mpe Ndeko Branham abimaki na camp mpo na kosunga bandeko na ye mpe baninga na ye - ba chasseurs, Bandeko Fred Sothmann mpe Eugene Norman, mpo na koluka Javelina oyo ezalaki kozwama te. Ndenge amesanaki asilaki kolonga na koluka nyama na ye. Amataki ngomba moko, nsima ya kotambwisa basusu na nzela oyo basengeli kolanda mpo na kokutana na etonga ya ngulu oyo amonaki liboso mpe akokita na bango na makasi epai na bango. Kopema na likolo ya nsonge mpo na mwa ntango, amonaki ete ezalaki na cocklebur na makolo ya pantalon na ye. Mwa moke nsima ya kosimba lobɔkɔ mpo na kolongola yango, kopanzana eninganisaki ngomba mpe lokola mabele ezalaki koningana na nse na ye, apumbwaki na mopepe, ayebaki te nini esalemaki to nini akoki kozela na nsima.
Kuna na likoló likoló na ye, bapɔsɔ nsambo ya mikemike ebimaki, lokola mpɛpɔ. Moins d’un clignotement après, ba points wana esalemaki liboso na ye - piramide ya ba anzelu na anzelu ya makasi na likolo mpe ba anzelu misato ya mike na se na ngambo moko na moko. Kaka ndenge Paulo alobaki ete amemamaki na likoló ya misato, ndenge moko ndeko Branham alobelaki ete “akamatamaki” na katikati ya liboke wana ya minzoto ya baanzelu. Ezalaki na ntango oyo nde bapesaki ye etinda: “Zonga na ɛsti longwa epai oyaki mpe na emoniseli mpe na bomoni, Nzambe akofungola bilembo nsambo oyo etiamaki elembo na libombami uta Yoane momonisi akomaki yango na mokanda ya Emoniseli!”
[Eleko ya Lingomba sambo.] [Bikangelo Sambo.]Bandeko oyo bazalaki elongo na ye bayebaki emonaneli mpe bakutanaki na koningana ya ngomba, kasi, na boyebi na ngai, bayebaki te bozali ya baanzelu. Ndeko Branham afundaki bango na ntango wana ete báyebisa moto moko te makambo oyo bamonaki mpe bayokaki. Lokola alongwaki na Tucson na mokolo ya 13 Mársi 1963, azongaki na Jeffersonville. Kobanda mokolo ya 17 tii mokolo ya 24 Mársi, abandaki molɔngɔ ya mateya oyo eleki kokamwa mpe ya kongɛngisa oyo eyebani naino te na lingomba.
Kokamataka Elembo butu nyonso, ye, na bobimisi ya semba mpe bofuli ya Molimo Mosantu mokolo na mokolo, asakolaki mabombami ya Nzambe, oyo Nzambe alakaki Danyele ekomonisama te kino tango ya suka. Oyo ezalaki ntango wana elobelami na makomi, ntango ya nsuka, mpe Nzambe alobaki na nzela ya profeta na ye lokola azalaki kosala ntango nyonso, kasi mbala oyo Liloba eyaki na lolenge ya emoniseli oyo elobamaki naino te na moto. Balakisaki mwasi ya libala ete makambo mingi oyo bazalaki koluka esilaki koleka. Ekómaki deja ntango mpo na mwasi ya libala “amibongisa.”
Soki otali foto, ya lipata oyo ezali kobulunganisa siansi okoki komona elongi ya Nkolo Yesu Klisto kati na yango. Azali kotala mpe kotala na ɛsti, na nsuki lokola nsuki ya mpate, lokola Yoane Momonisi amonaki ye. Amonanaki lokola elenge mobali te lokola azalaki ntango akangamaki na ekulusu na mibu ntuku misato na misato, kasi lokola ye oyo azali Mosambisi ya mokili. Ekoki kozala mpasi mpo na bato mosusu kondima, kasi ezali koloba te kati na makomi na bisika mingi ete ntango mwana ya moto akomonisa, mapata ekozala?
-----
Nasakoli epai ya bato ya eleko oyo ete makomi elaki ete ekozala na lipata oyo ekangisami na komonana ya mwana ya moto na mabele oyo. Sikawa namemeli bino sango ya somo ete lipata ya boye esalemaki na ekeke oyo - lipata oyo ekoki kolimbolama na siansi te. Soki ekokaki kolimbolama na nzela ya principe scientifique alors nakokaki kondima te oyo nasalaka mpo na yango, kasi ndimbola ezali te. Nayebisami na moto moko oyo nandimi ete azali profeta ya Nzambe mpo na ntango oyo ya nsuka, Ndeko mobali William Branham, ete baanzelu nsambo bayaki epai na ye mpe amonisaki mabombami ya mokanda ya Emoniseli, bakangaki ye o ntei ya bango, mpe batiki ye, basalaki lipata liye. Nazali na ntina moko te ya kotya ntembe na ndimbola oyo. Lipata ezalaki monene mingi, molai mingi, mpe esengelaki kozala na mai mingi mpo ezala ya solo; kasi likambo etikali - ezalaki ya solo. Ezalaki surnaturel mpe Nzambe atindaki yango lokola elembo na mwasi ya libala.Ebongolami uta na...
Acts of the Prophet. - Pearry GreenKozwa (PDF Lingelesi):
"Is this the sign of the end, Sir"Tángá lisolo yango na... The Cloud. - Pearry Green.