Libombami ya Klisto.
Klisto kati na bino.
Soki tokokaki kososola nini Makomami oyo elimboli: ‘Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.’ Toyebi ete ezali solo, kasi tozali mpenza kosEzali Klisto, mopakolami! Nzambe, oyo azalaki na kati ya Klisto, azali kati na bino.osola yango te. Nini ezali kati na yo oyo ezali monene koleka? Donc, soki azali na kati na yo, alors ezali yo lisusu te ko vivre, ezali ye ko vivre na kati na yo.
Melishisedeki.
Ebandeli 14 elobeli ndenge nini engumba ya Sodome elongamaki na mokonzi ya Elam (Perse). Lota ná mwasi na ye mpe bana na bango na ye bakangamaki mpe bamemaki bango na nɔrdi. Abalayama ayanganisaki limpinga ya etumba ya mibali 318 oyo balandaki mokonzi ya Elama mpe balongaki ye na etumba. Na ndenge yango, Abrahama abikisaki Lota mwana ya ndeko na ye na boombo. Nsima ya etumba, nganga-nzambe moko na nkombo Melishisedeki akutanaki na Abalayama, apambolaki ye, mpe na nsima alyaki mampa mpe amɛlaki vinyo elongo na ye. Na eyano, Abalayama afutaki moko na zomi na Melishisedeki, apesaki ye moko na zomi ya biloko nyonso oyo azalaki na yango.
Lisolo oyo ekozala ya kobombama mpenza kaka uta na lisolo ya Ebandeli, kasi na Baebele 7 Paulo akomi ete Melishisedeki azali mokonzi ya kimia mpe ya boyengebene, mpe azalaki na tata to mama te, ezala ebandeli to nsuka ya mikolo te. Mutu oyo ya mystérieux azali nani? Ndeko Branham alimbolaki ete Melishisedeki asengelaki kozala Nzambe ye moko, mpo kaka Nzambe nde azalaki na ebandeli te. Melishisedeki ezalaki théophanie ya Nzambe oyo emonanaki epai ya Abraham mpo na kosala liboso elilingi ya Yesu Klisto. Ezalaki Yesu te ndenge tomonaka ye na Kondimana ya Sika, po Yesu azalaki na tata na mama, pe mobali oyo azalaki na moko te. Yesu azali na kobanda; mobali oyo asalaki n’ango te. Yesu apesaki bomoi na ye; mobali oyo akokaki te, mpo azalaki Bomoi.
Kozwa (PDF Lingelesi)
Christ is the Mystery of God Revealed Who is this Melchisedec Christ is Revealed in His own Word
Ndeko Mosikoli.
Babongoli ntango bazalaki kosangisa mikanda oyo eyebanaki na nkombo Biblia na biso, pene na kotika mokanda ya Luta. Ezali lisolo ya bolingo, pe ezali kitoko mingi, kasi Nzambe alobelami na mpasi. Ezalaki likambo yango nde esalaki ete báboya pene na mokanda oyo lokola epemamaki. Nzokande ezali na ‘type’, lisolo ya mosikoli ya ndeko, Yesu Klisto azali ‘ndeko ya penepene’ na biso oyo azalaki na makoki ya kofuta motuya mpo na kosikola Naomi (oyo azali komonisa lingomba ya Bayuda) mpe na kosalaka bongo azwi Ruta (mwasi ya libala ya bapakano) oyo azali komonisa lingomba ya boklisto. Matondo Nzambe mpo tozali na mosikoli lokola oyo. Ezalaki na ndeko moko ya penepene (bozalisi na biso ya kala) oyo aponaki kosikola te mpo na kozala na stigma te ya kozala na posa ya kobala Ruta. Yango etikalaki Boaz (Klisto) na biso na bonsomi ya kosikola mwasi na ye ya libala. Yango nde ntina oyo Klisto asengelaki ‘kobotama na mwasi’ mpo azala ndeko na biso.
Kozwa (PDF Lingelesi) "Kinsman Redeemer"
Mwango ya Nzambe.
Ntango Nzambe akelaki molɔ́ngɔ́, azalaki na mikano misato na makanisi. Ya liboso, alingaki komimonisa epai ya bato na komonisáká bizaleli na ye. Akokaki kosala yango te lokola Yehova Nzambe oyo azali kozipa esika nyonso, ntango, mpe seko. Azali na mozindo mpe na libombami mpenza na boye ete moto moko te akokaki kokanga ntina na ye. Ndenge nini bakokaki kososola ekelamu oyo ezalaki ntango nyonso? Na yango, amonisaki botata na ye na kokomaka mwana ya moto. Yango wana Yesu amibengaki “Mwana ya moto.” Nzambe alingaki komimonisa na bato na komimonisaka kati na Klisto.
Nzambe alingaki kofanda na kati ya bato, mpe bongo kozala na pré eminence na nzoto ya bandimi oyo abengi mwasi na ye ya libala. Na ebandeli akokaki kosala yango epai na Adama ná Eva; kasi na nsima lisumu ekabwanaki bango na miso na ye. Mpo na nini Nzambe abatelaki kaka Adama ná Eva pɛto te? Soki asalaki yango, akokaki ata mokolo moko te komonisa bizaleli na ye mobimba. Azalaki mwana mobali, mobikisi, oyo akokaki komonisa kaka na nzela ya Klisto. Kotala? Makambo nyonso ekangami na moto moko wana, Yesu Klisto. Ntina monene ya Nzambe ezalaki ntango nyonso ya komimonisa - yambo kati na Klisto lokola kotonda ya Bonzambe na nzoto; mpe na nsima na kati ya bato oyo bakoyamba Molimo Mosantu ya Klisto. Bato wana ya sipesiale bakosala ete Yesu Klisto azala na esika ya liboso na bomoi na bango. Uta ebandeli Nzambe asali mosala makasi mpo na kokokisa mokano oyo, yango wana akoki kozwa nkembo na kati ya bato oyo bakosala ete Yesu Klisto azala na esika ya liboso; elingi koloba ete etɛlɛmɛlo oyo ezali likoló to liboso ya bato mosusu nyonso.
Ya misato, mokano ya Nzambe ezali ya kozongisa bokonzi na ye na elanga ya Edene, mpo ete bato na ye bakoka kotambola lisusu elongo na ye na malili ya mpokwa, lokola Adama ná Eva basalaki liboso ya kokwea. Mpo na yango, Nzambe amimonisaki na nzela ya bileko lokola tata, mwana mobali, mpe Molimo Mosantu. Tata mpe Molimo Mosantu bazali molimo moko. Ozwaka yango? Ezali te banzambe misato; ezali Nzambe moko oyo azali komimonisa na bizaleli misato. Nzambe amimonisaki na Yesu Klisto, oyo azalaki tata, mwana, mpe Molimo Mosantu - kotonda ya Bonzambe na nzoto. Sikawa kotonda ya Bonzambe na nzoto efandi na lingomba na ye (mwasi na ye ya libala), mpe ye apesi ye esika ya liboso. Nyonso oyo Nzambe azalaki, asopaki kati na Klisto; mpe nyonso oyo Klisto azali, asopaka na kati ya lingomba na ye (bandimi moko moko).
Liloba-elobami mbotama.
Yesu azalaki liloba-elobami mbotama mwana. Maria azwaki zemi na Ye te nzela ya likambo ya kosangisa nzoto, kasi na nzela ya liloba ya Nzambe oyo elobelami. (Na libumu ya Maria Nzambe akelaki ezala likei mpe spermatozoïde oyo e fertiliser likei, yango wana na ba gènes Azalaki mpenza moto, kasi baboti na ye ezalaki mpenza ya bonzambe.) Lokola ayaki na nzela ya kosangisa nzoto te, Yesu asengelaki kokufa te; kasi akufaki mpo na kofuta nyongo ya lisumu ya Adama. Yango nde lolenge se moko oyo ekokaki kofutama. Moto mosusu akokaki kosala yango te, mpo bato nyonso mosusu babotamaki na kosangisa nzoto. Lokola Malia, bato wana oyo bakanisami liboso mpo na kozala na kati ya mwasi ya libala ya libala ya Yesu Klisto bakozwa liboso liloba na libumu ya makanisi na bango.
Kozwa (PDF Lingelesi) Mary's Belief
Nkombo ya Nzambe ezali nini?
Ezali polele ete Nzambe azali na nkombo ya solosolo. Banzembo 9:11,
Bato oyo bayebi Kombo na Yo batiaka elikya na bango kati na Yo; pamba te, Yo Yawe, osundolaka te bato oyo balukaka Yo.
Banzembo 83:19,
Tika bayeba ete Yo, oyo Kombo na Yo ezali Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo kati na mokili mobimba!
[Talá lisusu Ezayi 42:8, Ezayi 54:5]Ndimbola ya nkombo na Ye ezali “Azali kosala ete Ekoma.”
Bato ya mayele ya Liebele bazalaki na limemya mingi mpo na nkombo ya Nzambe, balongolaki milelisi nyonso mpo ete ekoka kobengama te. Na boye moto moko te alingaki kozala na makoki ya “Kozwa nkombo na Ye mpamba.”
Tetragramme.Yango etikalaki ba 4 personnages «YHWH», oyo ‘ezali ko représenter’ kaka kombo ya Nzambe. (Bato mosusu basalelaka «JHVH» mpo na bilembo yango, atako yango ezali malamu te.) Lisanga oyo ya bilembo babengaka yango «Tetragramme», oyo, na grec elakisi «bilembo 4».
Bavoyelle ya hébreu ya liloba “Adonay” oyo elakisi “Nkolo na ngai”, esangisamaki na bilembo wana mpo na kosala liloba “Yehova”. Eyebani te bavoyelle nini ezalaki mpenza kosalelama. Kobosana lisusu te ete na Liebele, ezali na lɛtrɛ ‘J’ te.
Na Biblia ya Lingelesi King James Version liloba “Jehovah” or “LORD” [“Yehova” to “NKOLO”] [makomi minene nyonso] esalelami epai Tetragramme ezalaki. Yango esalemi pene na mbala nkóto nsambo kati na Biblia mobimba. [Liloba “Nkolo”, na balɛtrɛ mike, ezali liloba moko te.] Liloba Yehova, ezali bongo bobele liloba ya Lingelesi oyo ‘ezali komonisa’ nkombo na Ye.
Nayebi mokanda moko te [ba rulo, to bokomi ya tablɛti, bambɛki etc] ya eleko ya kondimana ya Kala, oyo ezali kolakisa nkombo mobimba ya Nzambe. Bazali kolakisa kaka tétragramme.
Lokola eyano na motuna na biso bongo, esengeli kouta na LILOBA; Tobalukaka na Kondimana ya Sika.
Anzelu oyo azalaki koloba na Maria alobaki na Luka 1:31,
Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo «Yesu.»Na Matai mokapo 1 bavɛrsɛ 21-23, tomoni ete Yesu abengami “Emanwele” oyo elakisi “Nzambe elongo na biso”.
21 Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango.»
22 Makambo wana nyonso esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli:
23 «Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba: Nzambe elongo na biso.»Jesus [”Yesu”] ezali kombo ya Lingelesi mpo na Nkolo na biso. Na Greke ezali “Iesous”. Na Liebele, nkombo na ye ezalaki kobengama “Yehohshua”.
Na Emoniseli mokapo 1, Yoane azali na emonaneli ya Yesu oyo asekwi. Oyo ezali ya “Mwana ya Moto” (vɛrsɛ 13) mpe Yesu azalaki koloba na Yoane “Nazali Alifa mpe Omega” (vɛrsɛ 8) [mpe lisusu na Lingelesi KJV, vɛrsɛ 11], “ya liboso mpe ya nsuka”, “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” mpe ezali kolakisa polele ete azali Nzambe. A “akufaki, kasi azali na bomoi libela koleka”. Suki na ye ezali pembe, te po Azali mobange, kasi po Ye azali Mosambisi.
[Talá: Emonaneli ya Patomo. lokasa mpo na koyeba makambo mosusu.]Nsango Elamu ya Yoane ebandi na maloba oyo, Yoane 1:1-3,
1 Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka ; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe.
2 Wuta na ebandeli, azalaka elongo na Nzambe.
3 Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te.Vɛrsɛ 14 ezali kokoba...
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.Awa tomoni mwa batitre mosusu ya Yesu, “mozalisi” mpe “liloba” mpe “mwana se moko ya Tata.”
[Talá: Emoniseli ya Yesu Klisto. lokasa mpo na koyeba makambo mosusu.]
Esakweli ya Masiya.
Ezayi asakolaki na ntina ya Masiya oyo azali koya na Ezayi 9:5. Na esakweli oyo Yisaya apesi Masiya batitre ya “Tata na seko” mpe “Nzambe na nguya”. Ezayi 9:5,
Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, mwana mobali moko apesameli biso, mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye; bakobenga ye: Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.
Kozwa (PDF Lingelesi)
The Spoken Word is the Original Seed - Part 1 The Spoken Word is the Original Seed - Part 2