Lisumu ya ebandeli. Nzete ya Bomoi.


  Mokanda ya Emoniseli série.

Lisumu ya ebandeli. Ezalaki nde Pomme?
(Momboto ya Nyoka.)


William Branham.

Tanga compte mobimba na...
Eleko Ya Lingomba Ya Efeso.

Emoniseli 2:7,
“...Moto oyo akolonga nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya Nzete na Bomoi, oyo ezali kati na Paladiso ya Nzambe”.

Oyo nde mbano ya mikolo mizali koya mpo na balongi nyonso ya bileko nyonso. Ntango libiangi ya nsuka mpo na etumba ekobetama, ntango bibundeli na biso ekokitisama, wana tokopema na paladiso ya Nzambe mpe eteni na biso ekozala Nzete ya Bomoi, mpo na libela.

“Nzete Ya Bomoi.” Yango ezali elilingi kitoko te? Elobelami mbala misato na Buku ya Genese mpe mbala misato na Buku ya Emoniseli. Na bisika nyonso motoba, nzete yango ezali kaka moko mpe ezali kotalisa bobele eloko moko.

Kasi Nzete Ya Bomoi ezali nini? Ee, ya liboso, tosengeli koyeba soki nzete ezali kotalisa nini. Na Mituya 24:6, lokola Balama alimbolaki Yisalaele, alobaki ete bazalaki “banzete ya aloe oyo Nkolo aloni.” Na Biblia mobimba, banzete etalisaka bato, lokola na Banzembo 1. Na yango, Nzete Ya Bomoi esengeli kozala Moto ya Bomoi, mpe ezali Yesu.

Sikawa kati na Elanga ya Edene, ezalaki na banzete mibale na katikati na yango. Moko ezalaki Nzete Ya Bomoi, mosusu ezalaki Nzete ya Boyebi Malamu na Mabe. Moto asengelaki kobika na Nzete ya Bomoi; kasi asengelaki te kosimba nzete mosusu, soki te alingaki kokufa. Kasi moto aliaki nzete mosusu wana, mpe ntango aliaki yango, liwa ekotaki kati na ye na nzela ya lisumu na ye, mpe akabwanaki na Nzambe.

Sikawa, Nzete wana kuna na Edene, Nzete oyo ezalaki liziba ya bomoi, ezalaki Yesu. Kati na Yoane, mikapo ya motoba kino na ya mwambe, Yesu amimonisi lokola liziba ya bomoi ya seko. Amibengaki Limpa oyo euti na likoló. Alobaki ete akomipesa Yemei mpe soki moto alei Ye, akokufa soko moke te. Alobaki ete Ye ayebaki Abalayama, mpe ete liboso Abalayama ázala, Ye AZALAKI. Asakolaki ete Yemei akopesa bango mai ya bomoi oyo soki moto ameli yango, akoyoka lisusu mposa ya mai te, kasi akobika mpo na seko. Amilakisaki lokola NAZALI MONENE. Azali Lipa ya Bomoi, Liziba ya Bomoi, Oyo ya Seko, NZETE YA BOMOI. Azalaki kuna na Edene na katikati ya elanga, ndenge kaka Akozala na katikati ya paladiso ya Nzambe.

Bato mosusu bakanisaka ete banzete mibale wana oyo ezalaki na elanga, ezalaki bobele banzete mibale lokola banzete mosusu oyo Nzambe atyaki na elanga. Kasi bato oyo bazali koyekola Biblia na bokebi bayebi ete ezali bongo te. Ntango Yoane Mobatisi agangaki ete epasola etyamaki na misisa ya banzete nyonso, azalaki kaka koloba na ntina na banzete mpamba te, kasi na ntina na mitinda ya molimo Sikawa, na Yoane 5:11 elobami,
“Mpe LITATOLI yango ezali oyo ete Nzambe apesi biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na Ye.”
Yesu alobaki na Yoane 5:40,
“Mpe bolingi te koya epai na ngai mpo na kozwa bomoi!”
Na yango mokanda, Liloba ya Nzambe, ezali koloba polele ete BOMOI, BOMOI YA SEKO, ezali kati na Mwana. Ezali na esika mosusu te. 1 Yoane 5:12,
“Ye oyo azali na Mwana azali. na BOMOI; mpe ye oyo azali na Mwana na Nzambe te, azali na Bomoi TE.”
Sikawa lokola mokanda ekoki kobongwana te, okoki kolongola to kobakisa na yango te, boye mokanda elobi ete BOMOI EZALI KATI NA MWANA... Lokola ezali bongo, NZETE NA ELANGA ESENGELI KOZALA YESU.

Malamu. Soki Nzete Na Bomoi ezali moto, na bongo Nzete ya Boyebi Malamu ná Mabe ezali mpe moto. Ekoki kozala ndenge mosusu te. Boye Moyengebene ná Moto Mobe batelemaki pembenipembeni kuna na katikati ya Elanga ya Edene. Ezekiele 28:13a,
“Yo (Satana) ozalaki na Edene, elanga na Nzambe.

Awa nde esika tozwi emoniseli ya solo ya 'Momboto ya Nyoka.' Talá likambo oyo esalemaki mpenza na Elanga ya Edene. Liloba elobi ete Eva alengolamaki na nyoka. Azimbisamaki mpenza na nyoka. Elobami na Genese 3:1,
“Nzokande, nyoka ezalaki na mayele mabe koleka nyama nyonso ya zamba oyo Nkolo Nzambe akelaki.”
Nyama oyo azalaki mpenza lokola moto (kasi atako bongo azalaki mpenza nyama) na lolenge ete akokaki kokanisa mpe koloba. Azalaki ekelamu oyo akokaki kotelema mpe azalaki mwa moke katikati ya mokombósó ná moto, kasi lokola mobali. Azalaki mpenza pene ya kokóma moto na lolenge ete momboto na ye ekokaki, mpe asanganaki na oyo ya mwasi mpe esalaki ete mwasi yango akumba zémi. Ntango likambo yango esalemaki, Nzambe alakelaki nyoka mabe. Abongolaki mikuwa nyonso ya nzoto ya nyoka, na boye asengelaki kolandana na mabele lokola banyoka oyo tozali komona lelo. Bato ya mayele bakoki kosala nyonso oyo balingi, kasi bakomona eteni oyo ezali kozanga te. Nzambe amonaki yango. Moto azali mayele mpe akoki komona boyokani kati na moto ná nyama mpe azali komeka kotalisa yango polele na liteya ya evolisyo. Evolisyo ezalaka te. Kasi ezali solo ete moto ná nyama basanganaki. Yango ezali moko ya mabombami ya Nzambe oyo etikalaki ya kobombama, kasi sikoyo emonisami. Likambo yango esalemaki kuna, na katikati ya Edene, ntango Eva apesaki mokongo na Bomoi mpo na kondima Liwa.

Botala makambo oyo Nzambe ayebisaki bango kati na elanga. Genese 3:15,
“Nakotya bonguna kati na yo mpe mwasi, mpe kati na momboto na yo mpe momboto na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.”
Soki tondimi Liloba oyo elobi ete mwasi azalaki mpenza na Mombóto, boye nyoka asengelaki kozala, ye mpe na momboto lokola. Soki Mombóto ya mwasi azalaki mwana mobali oyo abotamaki na mobali te, boye mombóto ya nyoka esengeli kozala na motindo moko, elingi koloba mobali mosusu asengeli kobotama na mobali te. Moyekoli moko te ya Biblia azangi koyeba ete Mombóto ya mwasi ezalaki Klisto Oyo ayaki na nzela ya Nzambe, kozanga kosangisa nzoto ya bato. Eyebani mpe malamu mpenza ete esakweli oyo elobaki ete motó ya nyoka ekopanzama ezalaki na bosolo esakweli oyo etalaki makambo Klisto alingaki kosala liboso ya Satana na ekulusu. Kuna na ekulusu, Klisto akopanza motó ya Satana, mpe Satana akozokisa litindi ya Nkolo.

Eteni oyo ya Makomi ezali emoniseli ya ndenge mpenza momboto ya nyoka elonamaki na mokili, lokola mpe tozali na lisolo ya Luka 1:26-35, epai wapi elakisami mpenza na bosikisiki lisolo ya lolenge Momboto ya mwasi emonanaki na nzoto kozanga mobali.
“Mpe na sanza ya motoba, Nzambe atindaki mwanje Gabriele na engumba moko ya Galilai, nkombo na yango Nazarete, Epai ya elenge mwasi moko oyo ayebaki mibali te, mpe azalaki mobandami ya mobali moko na nkombo ya Yosefu, ya libota ya David; mpe nkombo ya ngondo yango ezalaki Malia. Bongo mwanje yango akotaki epai na ye mpe alobaki: - Mbote, yo oyo opambolami! Nkolo azali elongo na yo! Opambolami na kati ya basi nyonso! Ntango amonaki ye, atungisamaki na maloba na ye, mpe akanisaki na nse ya motema soki mbote yango elingaki koloba nini. Bongo mwanje alobaki na ye ete: “Bangá te, Malia, mpo ozwi ngolu epai ya Nzambe. Mpe talá! okozwa zemi, okobota Mwana Mobali, mpe okopesa Ye nkombo YESU. Akozala monene, mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló, mpe Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya tata na ye Dawidi. Akoyangela ndako ya Yakobo libela; mpe bokonzi na Ye ekozala na nsuka te. Boye Maria atunaki mwanje: Ekosalema ndenge nini, muamba te ngai nayebi mobali te? Mpe mwanje ayanolaki mpe ayebisaki ye ete: Molimo Mosantu Akoya likolo na yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo na elilingi na Ye. Yango wana Mosantu oyo akobotama akobengama Mwana ya Nzambe.”

Lokola Momboto ya mwasi ezalaki mpenza Nzambe Ye moko kobotama kati na nzoto ya moto, ndenge moko mpe momboto ya nyoka ezali mpenza nzela oyo Satana amonaki ete akoki kofungola ekuke mpo na komikotisa kati na libota ya bato. Ekoki kosalema te mpo na Satana (mpamba te azali bobele ekelamu ya molimo oyo EKELAMAKI) ete amibota ye moko na lolenge oyo Nzambe amibotaki Yemei, yango wana lisolo ya Genese eyebisi biso ndenge nini abimisaki mombóto na ye mpe amikotisaki na kati ya libota ya bato. Tóbosana mpe te ete Satana abengami nyoka.' Ezali momboto na ye to komikotisa na ye kati na libota ya bato nde tozali kolobela.

Liboso kutu Adama áyéba nzoto ya Eva, nyoka ayebaki ye liboso na ye. Mpe oyo abotamaki na yango ezalaki Kaina. Kaina azalaki ya (abotamaki na, autaki na) “Oyo ya mabe” Wana. 1 Yoane 3: 12. Molimo Mosantu kati na Yoane akokaki te kobenga Adama “Oyo ya mabe” na esika moko (mpo yango nde alingaki kozala soki azalaki tata ya Kaina) mpe na esika mosusu kobenga Adama “Mwana na Nzambe”; azalaki yango na nzela ya bozalisi. Luka 3: 38. Emonanaki ete na bizaleli na ye Kaina azalaki lokola tata na ye, momemi liwa, mobomi. Botomboki na ye liboso na Nzambe, ntango akutanaki na Mozwi-ya-Nguya- Nyonso na Genese 4:5,9,13,14, ezali komonisa polele ete bizaleli na ye ekeseni mpenza na oyo ya bato, emonani ete eleki kutu makambo nyonso oyo tozali na yango kati na Makomi na oyo etali bokutani ya Nzamb ná Satana.
5 Kasi Asepelaki te na Kaina mpe na likabo na ye. Bongo Kaina asilikaki mingi mpe elongi na ye ebebaki.
9 Mpe Nkolo alobaki na Kaina ete: “Abele ndeko na yo azali wapi?” Mpe alobaki ete: “Nayebi te; nazali nde mobateli ya ndeko na ngai?
13 Bongo Kaina alobaki na Nkolo : Etumbu na ngai eleki mpasi mpo na komema!
14 Tala, obenganaki ngai lelo na mokili, mpe nakobombama liboso na yo; mpe nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili; mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.”

Botala lolenge ya sikisiki oyo mokanda ya Nzambe ezali kotalisa lisolo ya mbotama ya Kaina, Abele ná Sete.
Genese 4:1,
Mpe Adama ayebaki Eva mwasi na ye; mpe ye azwaki zemi, mpe abotaki Kaina, mpe alobaki: “Nazwi moto na lisungi ya Nkolo. Mpe abotaki lisusu ndeko na ye Abele.”
Genese 4:25,
“Mpe Adama ayebaki lisusu mwasi na ye; mpe abotaki mwana mobali, mpe apesaki ye nkombo Sete...”
Ezali na bana MISATO oyo babotami na boyebi ya nzoto MIBALE oyo Adama asalaki. Lokola Biblia ezali Liloba na Nzambe ya Solo mpe oyo ebongi be; likambo oyo ezali libunga te, kasi lisolo oyo ekomamaki mpo tómona polele. Lokola bana MISATO ya mibali babotamaki uta na makambo MIBALE oyo Adama asalaki, toyebi na kozanga ntembe ete MOKO kati na misato wana AZALAKI mwana ya Adama TE. Nzambe akomisi mpenza likambo yango na lolenge oyo mpo na kotalisa biso eloko moko. Likambo ya solo ezali ete Eva azalaki na kati ya libumu na ye na bana mibali mibale (mapasa) oyo bautaki na bokumbi zemi mibale ya kokesene. Azalaki na zemi ya mapasa, akumbaki zemi ya Kaina mwa moke liboso ya oyo ya Abele.

Tanga compte mobimba na...
Eleko Ya Lingomba Ya Efeso.

Kotala... Momboto ya Nyoka. pona ba détails ebele.


Site ya sango ya
Lingelesi.

Mokanda ya
Emoniseli série.

Nzambe na Siansi.
Index - Arkeoloji.

Konetolama.

Nsango malamu.
Yesu akufaki mpo
na masumu na yo.

Batisimo na Mai.

 
 

Bonzambe elimbolami.

 

Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Bikangelo Sambo.

Série Kotambola ya
Bakristu.

Nzambe na Histoire.
Masuwa ya Noa.

Lisumu ya ebandeli.
Ezalaki nde Pomme?

  Makomi elobi...

Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana: moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te.

Pamba te, tala Sango Malamu oyo boyokaki wuta na ebandeli: Tolinganaka biso na biso.

Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo.

1 Yoane 3:10-12



Mokanda ya Emoniseli.
Ekobi na lokasa elandi.
(Bikangelo Sambo.)


Soki kolia bapome
ezali komema basi
bayeba ete bazali
bolumbu, ekozala
malamu topesa
lisusu bapome.


Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba to PDF.


Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

The Two Babylons

by Rev Alexander Hislop.
(PDF Lingelesi)

Mopanzi ya ngomba
mpe nzete ya rose na
mbula-mpɛmbɛ
na Chine.

Lis ya moto.

Likonzí ya mɔtɔ.
- Houston 1950.

Pole likoló ya
libanga ya piramide.


Hub ya messagerie... Pona monoko na yo pe télécharger ba messages ya ofele epai ya Ndeko Branham.