Yesu Klisto azali Nzambe.


  Mokanda ya Emoniseli série.

Bonzambe elimbolami.


William Branham.

Tanga compte mobimba na...
Emoniseli ya Yesu Klisto.

Emoniseli 1:5,
Mpe kowuta na Yesu Klisto, Motatoli ya Sembo, mpe Mobotami ya Liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili. Epai na Ye oyo alingaka biso mpe asukoli biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,

Emoniseli 1:8,
Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Nsuka, elobi Nkolo Nzambe, Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, Mozwi-Na-Nguya-Nyonso.

Nzokande maloba nyonso oyo: 'Ye Oyo azali', Ye Oyo azalaki', mpe 'Azali koya', 'Motatoli ya Sembo', 'Mobotami ya Liboso kati na bakufi', mpe 'Mokonzi ya bakonzi ya mokili', 'Alifa mpe Omega', mpe 'Mozwina-nguya-nyonso', ezali bakombo mpe bolimboli ya MOTO MOKO KAKA, Oyo azali Nkolo Yesu Klisto, Ye nde asukoli biso na masumu na biso kati na makila na Ye moko.

Molimo na Nzambe kati na Yoane ezali koloba bongo mpo na kotalisa Bonzambe oyo Eleki Likolo ya Yesu Klisto mpe mpo na komonisa ete Nzambe azali Nzambe MOKO. Lelo libunga moko monene ezali. Yango ezali ete ba-Nzambe bazali misato na esika ya moko. Emoniseli oyo, lolenge Yesu Yemei apesaki yango na Yoane, ezali kosembola libunga. Ezali te ete ba-Nzambe bazali misato, kasi Nzambe moko ná misala misato. Nzambe azali MOKO ná bibiangelo misato: Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu. Yango nde emoniseli ya nguya oyo eklezia ya ebandeli ezalaki na yango, mpe yango esengelaki kozongisama na mokolo oyo ya suka elongo na lolenge ya malamu ya libatisi na mai.

Sikawa bato ya likindo bakondima elongo na ngai te, mpamba te botala oyo ekomami na zulunale moko ya Baklisto oyo eyebani: “Malakisi wana (likolo na bonzambe misato) ezali mpenza na katikati, na motema ya Kondimana na Kala. Ezali mpe lokola na katikati ya Kondimana na Sika. Kondimana na Sika lokola Kondimana na Kala, ezali mpe kotelemela likanisi oyo ezali koloba ete banzambe bazali mingi koleka moko. Nzokande Kondimana na Sika ezali koteya biso polele mpenza ete Tata azali Nzambe, ete Mwana azali Nzambe, mpe Molimo Mosantu azali Nzambe, mpe ete bamisato oyo bazali TE biteni misato ya Moto moko, kasi bato misato oyo bazali na boyokani ya malamu mpenza kati na bango. Wana nde tozali na malakisi ya nkembo ya Bato Misato kasi Nzambe bobele moko.”

Balobi lisusu ete : “Nzambe, engebene na Biblia, azali kaka moto moko mpamba te, kasi Azali bato misato kati na Nzambe moko. Yango nde libombami monene ya Bosato”.

Na ntembe te, ezali libombami. Ndenge nini bato misato bakoki kozala kati na Nzambe moko? Ezali kaka te ete Biblia oyo elobeli yango ezali te, kasi etalisi lisusu bozangi mayele ya lisosoli. Bato misato, atako bakokani, bazali kosala banzambe misato, to lokótá ebungisi ndimbola na yango mobimba.

Boyoka naino maloba oyo lisusu: “Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka; elobi Nkolo, Ye Oyo Azali, Oyo Azalaki, mpe Oyo Azali koya, Mozwi-na-Nguya-Nyonso ”. Oyo nde Bonzambe. Oyo azali bobele mosakoli te, moto. Oyo azali Nzambe. Mpe ezali emoniseli ya Banzambe misato te, kasi ya Nzambe MOKO, Oyo ya Nguya Nyonso.

Bazalaki kondima Banzambe misato na ebandeli ya lingomba te. Okoki kozua kondima ya lolenge wana te kati na bantoma. Ezalaki nsima na eleko ya bantoma nde malakisi oyo ekotisamaki, mpe ekómaki mpenza mokakatano mpe malakisi ya moboko na Likita ya Nicée. Malakisi ya Bonzambe ememaki bokabwani na Nicée. Mpe uta na bokabwani yango, bangámbo mibale ebimaki. Ngambo moko ekotaki na ba-Nzambe mingi, kondimáká ba-Nzambe misato, mpe ngambo mosusu kondimiáká ete Nzambe azali moto moko. Na ntembe te yango esalemaki mbala moko te, kasi suka suka esalemaki, mpe tozalaki na yango lelo. Kasi Emoniseli ya Molimo na mangomba na nzela ya Yoane, ezalaki “Ngai nazali Nkolo Yesu Klisto, mpe Nazali MOBIMBA na yango. Nzambe mosusu azali te. Bongo Atiaki elembo na Ye likolo na Emoniseli oyo.

Botala likambo oyo: Nani azalaki Tata na Yesu? Matai 1:18 elobi: “Malia Akumbaki zemi na nguya ya Molimo Mosantu”. Kasi Yesu Ye moko, alobaki ete Nzambe nde azalaki Tata na Ye. Nzambe Tata ná Nzambe Molimo Mosantu, ndenge tolobaka mbala mingi maloba oyo , esali Tata mpe Molimo eloko MOKO. Solo mpenza bazali moko, soki te Yesu azalaki na Batata mibale. Kasi botala, Yesu alobaki ete Ye ná Tata na Ye bazalaki Moto moko - mibale te. Yango esali Nzambe MOKO.

Lokola masolo ma kala mpe na Makomi eyebisi biso ete ezali solo, bato bazali komituna esika likanisi ya misato wana eutaki. Ekomaki malakisi ya moboko na Likita ya Nicée na mobu 325 sima na liwa ya Klisto. Bosato oyo (liloba moko oyo ezali kutu kati na Makomi te) etongamaki likolo na banzambe mingi ya Roma. Bato na Roma bazalaki na banzambe mingi oyo bazalaki kosambela. Bazalaki mpe kosambela bankóko mpe kotala bango lokola balobeli. Ezalaki na bongo pete mpo na kopesa bankombó ya sika na banzambe ya kala, na yango tozali na basantu mpo na kotalisa lokola soki euti na Biblia. Boye na esika ya Jupiter, Venice, Mars, mpe bongo na bongo, tozali na Polo, Petelo, Fatima, Christopher, mpe bongo na bongo. Bakokaki te kotambolisa losambo na bango ya bapakano ná Nzambe bobele moko; na yango, bakabolaki Ye na biteni misato, mpe bakomisaki basantu balobeli na bango ndenge basalaki na bankóko na bango liboso.

Banda wana bato bazangaki kososola ete Nzambe azali bobele moko ná misala to komonisama misato. Bayebi ete Nzambe azali moko engebene na Makomi, kasi bazali komeka kokómisa yango liteya ya mabanzo oyo Nzambe azali lokola mbuma ya vinyo; bato misato, oyo bazali na Bo-Nzambe moko mpe bazali kokabola yango ndenge moko na bango nyonso. Nzokande elobami polele awa na Emoniseli ete Yesu azali “Oyo Azali”, “Oyo Azalaki”, mpe “Oyo Akoya”. Azali “Alifa mpe Omega”, yango elingi koloba ete Azali “A kino Z” to YANGO NYONSO. Azali nyonso - Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Azali Felele kitoko na Salono, Lísi ya Lobwakú, Monzoto Engengaka na Ntongo, Nzete ya Sembo, Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu. Azali Nzambe, Nzambe Mozwui-na-Nguya-Nyonso. NZAMBE MOKO.

1Timoté 3:16 elobi: “Na ntembe te, libombami ya bonzambe ezali monene, Nzambe amonisamaki polele kati na nzoto, Atangamaki moyengebene na Molimo, Amonanaki na banje, Ateyamaki na bikolo ya bapaya, Andimamaki na mokili, mpe akamatamaki nakati na Nkembo”. Yango nde Biblia elobi. Elobi ata eloko moko te na ntina na moto ya liboso to ya mibale to ya misato awa. Elobi ete Nzambe amonisamaki kati na nzoto. Nzambe Moko. NZAMBE MOKO wana amonisamaki polele kati na nzoto. Yango esengelaki kokata likambo. Nzambe ayaki na lolenge ya moto. Yango ekomisaki Ye NZAMBE MOSUSU te. AZALAKI NZAMBE, NZAMBE MOKO WANA. Na ntango wana, ezalaki emoniseli, ezali mpe emoniseli sikawa. Nzambe Moko.

Tika tozonga na Biblia mpo na komona eloko oyo Azalaki na ebandeli engebene na emoniseli oyo Apesaki na ntina na Ye moko. Yehova monene amonanaki na Yisalaele kati na likonzi na móto. Lokola Mwanje na Boyokani, Azalaki kobika kati na likonzi na móto yango mpe Akambaki Yisalaele mokolo na mokolo. Na tempelo, Asakolaki boyei na Ye na lipata monene. Bongo mokolo moko, Amonisamaki na nzoto oyo ebotamaki na mongondo, oyo ebongisámákí mpo na Ye. Nzambe oyo azalaki kofanda likolo na bahema ya Yisalaele Alataki sikawa hema ya mosuni, mpe afandaki lokola moto kati na bato. Kasi Azalaki NZAMBE MOKO wana.

Biblia ezali koteya ete NZAMBE AZALAKI KATI NA KLISTO. NZOTO ezalaki Yesu. Kati na Ye, litondi mobimba ya Bonzambe ezalaki kofanda na NZOTO. Eloko moko te ekoki kozala polele koleka likambo oyo. Libombami, iyo. Kasi ezali mpenza solo - ekoki komonana polele koleka oyo te. Bongo soki Azalaki bato misato te na ntango wana, Akoki te kozala misato sikawa. NZAMBE MOKO: mpe Nzambe yango moko akómaki mosuni.

Yesu alobaki: “Nauti na Nzambe mpe Nakozonga (Nazongi) na Nzambe.” Yoane 16:27-28. Yango mpenza nde esalemaki. Alimwaki na mokili na nzela ya liwa na Ye, bokundami na Ye, lisekwa na Ye, mpe komata na Ye na likolo. Na sima Polo akutanaki na Ye na nzela ya Damaseke mpe Alobaki na Polo ete: “Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai?” Polo alobaki: “Yo ozali Nani, Nkolo?” Alobaki: “Nazali Yesu.” Azalaki likonzi na móto, pole oyo ezali kongenga makasi. Azongaki bobele ndenge Alobaki ete Akosala yango. Azongaki na lolenge moko wana oyo Azalaki liboso na Ye kozua mongombo ya mosuni. Ezali mpenza bongo nde Yoane amonaki yango. Yoane 1:18 “Moto ata moko te amoná Nzambe; Mwana Mobotami Se Moko oyo azali kati na ntolo ya Tata, Ye nde atalisi Ye”. Botala malamu esika Yoane alobi ete Yesu AZALI. Azali KATI na ntolo ya Tata.

Luka 2: 11 elobi,
“Mobikisi abotameli bino lelo kati na engumba na Dawidi, Ye azali Klisto Mobikisi.”
Abótamaki Klisto, nsima na mikolo mwambe, ntango Akatamaki ngenga, babengaki nkombo na Ye Yesu, bobele lolenge mwanje ayebisaki bango. Ngai nabótámá Branham. Ntango nabotamaki bapesaki ngai nkombo ya William. Ye azalaki KLISTO, kasi Apesamaki nkombo awa na nse kati na bato. Mongombo oyo ya libanda, oyo bato bakokaki komona ebengamaki Yesu. Azalaki Nkolo na Nkembo, Mozui-na-Nguya- Nyonso oyo amonanaki kati na nzoto. Azali Nzambe Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu. Azali nyonso wana.

Tanga compte mobimba na...
Emoniseli ya Yesu Klisto.

Télécharger (PDF Lingelesi)...   Godhead Explained



Mokanda ya Emoniseli.
Ekobi na lokasa elandi.
(Emonaneli ya Patmos.)


Site ya sango ya
Lingelesi.

Mokanda ya
Emoniseli série.

Nzambe na Siansi.
Index - Arkeoloji.

Konetolama.

Nsango malamu.
Yesu akufaki mpo
na masumu na yo.

Batisimo na Mai.

 
 

Bonzambe elimbolami.

 

Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Bikangelo Sambo.

Série Kotambola ya
Bakristu.

Nzambe na Histoire.
Masuwa ya Noa.

Lisumu ya ebandeli.
Ezalaki nde Pomme?

  Makomi elobi...

Isalaele, yoka malamu! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko.

Deteronomi 6:4


Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba to PDF.


Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

The Seven Seals.

(Lingelesi)

Mopanzi ya ngomba
mpe nzete ya rose na
mbula-mpɛmbɛ
na Chine.

Lis ya moto.

Likonzí ya mɔtɔ.
- Houston 1950.

Pole likoló ya
libanga ya piramide.


 


Hub ya messagerie... Pona monoko na yo pe télécharger ba messages ya ofele epai ya Ndeko Branham.