Malakisi ya Banikolaiti.


  Mokanda ya Emoniseli série.

Eleko Ya Lingomba Ya Pelegamo.


William Branham.

Tanga compte mobimba na...
Eleko Ya Lingomba Ya Pelegamo.

Emoniseli 2:15,
“Bongo yo mpe ozali na bato oyo bakangami na malakisi ya Banikolaiti, oyo ngai nayinaka.”

Bóbosana te ete na eleko ya Efese, nalobaki ete liloba “NiKolaiti” euti na maloba mibale ya Greke: Nikao oyo elimboli kolonga, mpe Lao oyo elimboli bandimi. Nikolaiti elingi koloba: “kolonga bandimi”. Kasi, mpo na nini likambo yango ezali nsomo boye? Ezali likambo ya nsomɔ mpamba te Nzambe atikala ata mogollo moko te kotya lingomba na Ye na maboko ya bakonzi oyo baponami na bato, oyo bazali na makanisi ya politiki. Atyaki lingomba na Ye na maboko ya bato oyo baponami na Nzambe, oyo batondi na Molimo, bato oyo babikaka Liloba mpe bazali kokamba bato na koleisaka bango Liloba. Akaboli bato na bituluku te mpo ete bonganga-nzambe moko mosantu etambwisa ebele ya bato. Ezali solo ete batambwisi basengeli kozala basantu, kasi liyangani mobimba esengeli mpe kozala mosantu. Lisusu, ezali na esika moko te kati na Liloba wapi banganga-nzambe to bateyi, to bato mosusu bazali koyokanisa Nzambe ná bato, ezali mpe na esika moko te epai wapi kabwani kati na losambo na bango epai na Nkolo. Nzambe alingi ete bato nyonso bálinga mpe básalela Ye elongo. Makambo ya Banikolaiti ebebisaka mitindá wana mpe na esika na yango ekabolaka batei na bato mpe ekómisaka bakambi bankolo na esika ete bázala basali.

Nzokande, malakisi oyo ebandaki mpenza lokola misala na eleko ya liboso. Emonani ete mokakatano yango eutaki na maloba mibale: “bankulutu” (ba-pastere) mpe 'bakengeli' (baepískópo). Atako Makomi ezali kolakisa ete ezali na bankulutu ebele na lingomba moko na moko, basusu (na kati na bango Ignace) babandaki koteya ete mokumba ya epískópo ezalaki ya kozala na esika ya liboso mpe na bokonzi likolo ya bankulutu.

Kasi, mpo na koloba bosolo, liloba “nkulutu” ezali kolobela moto, nzokande liloba “epískópo” ezali komonisa mosala ya moto yango. Nkulutu ezali moto. Epískópo ezali mosala ya moto yango. “Nkulutu” ezali ntango nyonso mpe ekotalisa ntango nyonso mbula oyo moto azali na yango na kati ya Nkolo. Azali nkulutu, ezali te mpo aponami to akulisami to bongo na bongo; kasi mpo AZALI MUKOLO. Ye asili kokomela, alakisami malamu, azali moto ya sika te; akoki kotyelama motema na ntina na makambo oyo abiki mpe mpo na ntango molai oyo abiki na bomoi na ye ya Moklisto.

Nzokande, baepískópo bakangamaki na mikanda ya Polo te, kasi bakendaki nde na lisoló ya Polo, ntango abengaki bankulutu ya Efese na Miléte na Misala 20. Na molongó 17, Biblia elobi ete “bankulutu” babengamaki, mpe na nsima na molongó 28, babéngami bakengeli (baepískópo). Bobgo baepískópo wana (na ntembe te bazalaki na makanisi ya politiki mpe bazalaki na mposa makasi ya bokonzi) bazalaki koloba na makası nyonso ete Polo alıngaki koloba ete “bakengeli” bazalaki na bokonzi koleka nkulutu ya losambo ya esika moko boye, oyo azalaki na bokonzi bobele kati na losambo na ye moko. Mpo na bango, epískopo azalaki sikawa moto oyo azali na bokonzi likoló ya bakambi mingi ya esika moko. Likanisi ya boye euti na Makomi te to mpe na masoló ya kala te, kasi ata moto monene lokola Polycarpe azalaki kolanda ebongiseli ya ndenge wana.

Na bongo, oyo ebandaki na lolenge ya misala na eleko ya liboso ekómaki mpenza malakisi; mpe ezali bongo lelo. Baepískópo bazali kokóba koloba ete bazali na bokonzi ya koyangela bato mpe kosala na bango ndenge balingi, kotyáká bango na bisika nyonso oyo bamoni ete ebongi mpo na mosala na bango. Yango ezali kowangana litambwisi ya Molimo Mosantu Oyo alobaki ete : “Botyela Ngai Polo na Balanaba pembeni mpo na mosala oyo Nabengeli bango.” Yango ezali kotelemela Liloba mpe kotelemela Klisto.

Matai 20:25-28,
“Kasi Yesu abengaki bango epai na Ye, mpe alobaki ete : Boyebi ete bakonzi ya mabota bakonzaka bato oyo bazali na nse na bango, mpe bato ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na nse na bango. Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino; nzokande moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino, tika ete ázala mosali na bino; Mpe moto nyonso oyo alingi kozala mokonzi kati na bino, tika ázala moombo na bino. Mpamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.

Matai 23:8-9,
“Kasi bino bóbengama Labi te, mpo ete Moteyi na bino azali bobele moko, Klisto; mpe bino nyonso bozali bandeko. Bóbenga moto moko te tata na bino awa na mokili, mpo ete Tata na bino azali bobele Moko, Oyo azali na Likoló.

Mpo na komonisa yango polele koleka, nakolimbola mateya ya Banikolaiti na lolenge oyo: Bozali komikanisela na Emoniseli 13:3 elobi boye:
“Mpe namonoki moko ya mitó na ye lokola nde azokaki na liwa; kasi mpota na ye ya liwa ebikisamaki. Mpe mokili mobimba ekamwaki mpe elandaki nyama yango.”

Sikawa toyebi ete motó oyo ezokaki ezalaki bokonzi ya bapakano ya Loma, Nguya wana monene ya politiki ya mokili. Motó yango etelemaki lisusu lokola “bokonzi ya molimo ya Lingomba Katolike ya Loma”. Sikawa botala malamu likambo oyo. Likambo nini Loma ya bapakano mpe ya makambo na politiki esalaki oyo ezalaki moboko ya elonga na yango? Ye, “akabolaki mpe ayangelaki”. Yango nde ezalaki mombóto ya Loma : kokabola mpo na koyangela. Mino na ye ya ebende ezalaki kopasola mpe kolya. Baoyo apasola mpe alya bakokaka lisusu kotelema te, ndenge ezalaki mpo na engumba Carthage, oyo abebisaki mpe abomaki. Mombóto moko wana ya ebende etikalaki kati na ye ntango atelemaki lokola lingomba ya lokuta, mpe etinda na ye etikalaki kaka ndenge moko: kokabola mpe kolónga. Yango nde makambo ya ba- Nikolaiti mpe Nzambe ayinaka yango.

Nzokande, eyebani malamu ete ntango libunga wana ekotaki na lingomba, bato babandaki kowelana mpo na kozwa ebonga ya epískópo, mpe yango esalaki ete ebonga wana ezalaki kopesama na bato oyo batángá mingi, oyo bazalaki na bozwi mingi, mpe na makanisi ya politiki. Boyebi mpe mwango ya bato ebandaki kozwa esika ya bwanya ya Nzambe, mpe Molimo Mosantu ezalaki lisusu na bokonzi te. Yango ezalaki mpenza likambo ya mawa, mpamba te baepískópo bakobaki koloba ete ezalaki lisusu na ntina te ete moklisto azala na bizaleli ya malamu mpo na koteya Liloba to milulu ya lingomba, mpamba te makambo mpe milulu nde ezalaki na ntina Yango epesaki nzela na bato mabe (bakosi) ete bákabola etongá.

Ná malakisi oyo esalemi na bato, ya kotombola baepískópo na esika oyo epesameli bango te kati na Biblia, likambo oyo elandaki ezalaki ya kopesa bato bankombo ya lokumu, yango ekotisaki bango na molongo ya bakonzi ya mangomba; mpo eumelaki te, baepískópo-mokonzi bakómaki koyangela baepískópo mpe bakardinale bazalaki koyangela baepískópo-mokonzi, mpe, kobanda na ntango ya Boniface III, pápa moko, akomaki koyangela bango nyonso, pápa-mokonzi.

Na ntina na malakisi ya ba Nikolaïti mpe kosangisama ya Boklisto ná Babilone, mbuma ya nsuka esengelaki kozala oyo Ezekiele amonaki na Mokapo 8:10,
“Bongo nakotaki mpe natalaki; mpe talá! mitindo nyonso ya banyama oyo ebendanaka na libumu, mpe ya banyama ya bosoto, mpe bikeko nyonso ya ndako ya Yisalaele etalisamaki na efelo zingazinga.”

Emoniseli 18:2,
“Mpe agangaki na mongongo makasi kolobáká ete: “Ekweyi, ekweyi, Babilone monene! Ekomi efandelo ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ndako ya bandeke nyonso ya mbindo mpe ya koyina. mpamba te mabota nyonso bameli vinyo ya nkanda ya pite na ye.”

Nzokande, bato mingi bandimaki te mateya wana ya Banikolaiti oyo ekotaki kati na lingomba, mpamba te bato yango bakokaki kotánga mokanda to lisoló moko ya Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na moto moko ya sembo. Na bongo lingomba esalaki nini? Ebenganaki bateyi wana ya sembo na lingomba mpe etumbaki mikanda yango. Balobaki : “Esengeli kozala moto oyo ayékólá mingi mpo na kotánga mpe kosósola Liloba ya Nzambe. Petelo ye moko alobaki te ete makambo mingi oyo Polo akomaki ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina na yango?” Lokola Liloba elongolamaki na maboko ya bato, kala te bato bakomaki bobele koyoka makambo oyo nganga-nzambe azalaki koloba, mpe kosala makambo oyo azalaki koyebisa bango. Babengaki yango Nzambe mpe Liloba na Ye ya bulee. Bazalaki koyangela makanisi mpe bomoi ya bato mpe kokómisa bango baombo ya banganga-nzambe oyo bazalaki konyokola bango.

Sikawa soki olingi elembeteli oyo emonisi ete Lingomba ya Katolike eséngaka bomoi mpe makanisi ya bato, yoká kaka ekateli ya Théodose ya zomi. Ekateli ya liboso ya Théodose.

Mobeko yango esakolamaki mbala moko nsima na ye kobatisama na Lingomba ya Liboso ya Loma.
“Biso bakonzi misato tolingi ete bato oyo tozali koyangela bákangama na molende na esambeli oyo Santu Petelo ateyaki na Baloma, esambeli oyo ebatelamaki na bosembo nyonso na nzela ya bonkóko mpe oyo ezali sikawa koyambolama na Pápa Damase ya Loma, mpe Petelo, episkópo ya Alesandalia, moto ya bosantu ya Bantoma, engebene na malako ya Bantoma mpe malakisi ya Nsango Malamu; tiká tóndima Bonzambe moko ya Tata, ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu, oyo bazali na bonene ndenge moko kati na Bosato Mosantu. Tozali kopesa mitindo ete bato oyo balandi kondima oyo babéngama Baklisto ya Katolike; tozali kobenga balandi nyonso oyo bazangi mayele ya mangomba mosusu na nkombo mabe ya bapengwi, mpe topekisi mayangani na bango ebengama mangomba. Libanda na kokweisama kouta na bosembo ya Nzambe, basengeli kozela etumbu ya makasi oyo bokonzi na biso, na litambwisi ya bwanya ya likoló ekomona malamu kopesa bango...”

Mibeko zomi na mitano ya etumbu oyo mokonzi yango asakolaki, elongolaki mpo na bambula mingi na bakonzi ya mangomba ya Nsango Malamu, makoki nyonso ya kosalela lingomba na bango, epekisaki bango kosala misala nyonso ya leta mpe ekanelaki ete bakofutisa bango lománde, bakobotola biloko na bango, bakobenganama na mboka mpe na makambo mosusu bakokatela bango etumbu ya liwa.

Bongo bino boyebi nini? Tozali kokende kaka na nzela wana lelo.

Lingomba Katoliko ya Loma emibengaka lingomba Mama. Emibengaka lingomba ya liboso to ya ebandeli. Ezali mpenza solo. Azalaki Lingomba ya ebandeli ya Loma, Lingomba ya Liboso oyo ezongaki nsima mpe ekweaki na lisumu. Ezalaki lingomba ya liboso ya kokóma ebongiseli. Kati na ye ezwamaki misala mpe na nsima malakisi ya Banikolaiti. Moto moko te akowangana ete azali mama. Azali mama, mpe aboti bana basi. Nzokande, mwana mwasi auti na mwasi moko. Mwasi moko oyo alati elamba ya motane makasi afandi likoló ya bangomba nsambo ya Loma. Azali mwasi ya ndumba mpe aboti bana basi. Bana basi wana bazali mangomba ya Misioni oyo ebimaki na ye, kasi na nsima ezongaki mbala moko na ebongiseli mpe na malakisi ya Banikolaiti. Mama oyo ya bana basi-mangomba abengami mwasi ya pite. Ezali mwasi oyo azalaki sembo te na ndai na ye ya libala. Abalanaki na Nzambe mpe na nsima akendaki kosala pite elongo na zabolo, bongo na pite na ye, abotaki bana basi oyo bakokani na ye. Boyokani wana ya mama ná mwana mwasi ezali kotélemela Liloba, kotélemela Molimo mpe na bongo kotélemela Klisto. Iyo, MOTELEMELI YA KLISTO.

Sikawa, liboso ya kokóba, nalingi koloba ete baepiskópo wana ya ebandeli bakanisaki ete bazalaki likoló ya Liloba. Bayebisaki bato ete bakokaki kolimbisa masumu na bango soki bayamboli masumu yango. Yango ezalaki solo ata moke te. Babandaki kobatisa bana mike na ekeke ya mibale. Kutu, bazalaki kosala libatisi ya kozongisama sika. Ezali likambo ya kokamwa te ete bato bazali na mobulungano lelo oyo. Soki bazalaki na mobulungano makasi na ntango wana, pene mpenza na mokolo ya Pantekote, lelo oyo bazali mpenza kati na bozangi elikya, wana pene na mibu 2000 ekaboli bango na bosolo ya ebandeli.

Oh, Lingomba na Nzambe, elikya ezali bobele moko. Zongá na Liloba mpe kangamá na yango.

Tanga compte mobimba na...
Eleko Ya Lingomba Ya Pelegamo.


Libombami ya Klisto.

Site ya sango ya
Lingelesi.

Mokanda ya
Emoniseli série.

Nzambe na Siansi.
Index - Arkeoloji.

Konetolama.

 

Mateya mosusu ya
Ntina ya nsango.

Nsango malamu.
Yesu akufaki mpo
na masumu na yo.

Batisimo na Mai.

 
 

Lipata oyo eleki
ya bomoto.

Likonzí ya mɔtɔ.

 

Bonzambe elimbolami.

 

Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Eleko ya Lingomba
sambo.

Bikangelo Sambo.

Série Kotambola ya
Bakristu.

Nkombo ya Nzambe.

Nzambe na Histoire.
Masuwa ya Noa.

Arkeoloji.
Sodome mpe Gomore.

Lisumu ya ebandeli.
Ezalaki nde Pomme?

Mythologie.
Lingomba ya Babilone.

  Makomi elobi...

Kasi tala Boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, elobi Nkolo: «Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.»

Ba-Ebre 8:10



Mokanda ya Emoniseli.
Ekobi na lokasa elandi.
(Malakisi ya Balama.)


Nzambe azali na
bibiangelo mingi:...
kasi Azali bobele
nkombo moko ya
bomoto mpe
Nkombo yango
ezali Yesu.


Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba to PDF.


Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

The Two Babylons

by Rev Alexander Hislop.
(PDF Lingelesi)

Mopanzi ya ngomba
mpe nzete ya rose na
neige na Chine.

Lis ya moto.

Likonzí ya mɔtɔ.
- Houston 1950.

Pole likoló ya
libanga ya piramide.


Hub ya Nsango... Pona monoko na yo mpe kozwa bansango oyo euti na Ndeko Branham.