Malakisi ya Balama.
Eleko ya Lingomba ya Pelegamo.
William Branham.Tanga compte mobimba na...
Eleko ya Lingomba ya Pelegamo.Emoniseli 2:14,
“Ozali na bato oyo basimbaka malakisi ya Balama oyo ateyaki Balaka ete atya libaku liboso ya bana ya Yisalaele, mpo bálya biloko bipesami mbeka na bikeko, mpe ete básala pite.”Boye okoki kaka te kozala na malakisi ya Banikolaiti kati na lingomba kozanga ete malakisi mosusu wana mpe ékóta. Omoni, soki olongoli Liloba ya Nzambe mpe kotambwisama ya Molimo lokola lolenge ya kosambela (baoyo basambelaka Ngai basengeli kosambela Ngai na Molimo mpe na bosolo), wana ekosengela opesa bato lolenge mosusu ya kosambela na esika na yango, mpe lolenge mosusu yango ezali malakisi ya Balama.
Mpo na kososola nini liteya ya Balama ezali na kati ya lingomba ya Kondimana ya Sika, tokozwa litomba na kozonga na nsima mpo na komona soki ezalaki nini kati na lingomba ya Kondimana ya Kala mpe kosalela yango na eleko wana ya misato, mpe na nsima komema yango kino na ntango oyo.
Lisolo yango elobelami na mokanda ya Mituya mokapo 22 tii 25. Sikawa toyebi ete Yisalaele ezalaki libota liponami ya Nzambe. Bazalaki ba-Pantekotiste ya eleko na bango. Bazwaki ekimelo na nse ya makila, bango nyonso babatisamaki na Mbu Motane mpe babimaki na mai na koyembáká kati na Molimo mpe na kobináká na nse nguya ya Molimo Mosantu, wana Milyami, mosakoli mwasi, azalaki kobeta mbonda na ye. Nsima ya kosala mobembo mwa ntango molai, bana ya Yisalaele bakómaki na Moaba. Boyebi soki Moaba azalaki nani. Azalaki mwana ya Lota oyo abotamaki na moko ya bana na ye ya basi, mpe Lota na ngala na ye azalaki mwana ya ndeko ya Abalayama, na yango Yisalaele ná Moaba bazalaki bandeko. Nalingi ete bomona yango. Bamoaba bayebaki bosolo, ata soki babikaki na kolanda yango to te.
Na bongo, Bayisalaele bakómaki na bandelo ya mokili ya Moaba, mpe batindaki bamemi-nsango epai ya mokonzi mpo na koloba na ye ete: “Tozali bandeko. Tiká biso tokatisa mboka na bino. Soki bato na biso to bibwélé na biso balye to bamɛli eloko moko, tokofuta yango na esengo nyonso.” Kasi Mokonzi Balaka amitungisaki mingi Mokambi ya etuluku wana ya Banikolaiti abelemaki te mpo na kopésa nzela na lingomba wana, oyo ezalaki na bilembo, makamwisi, mpe bimoniseli ndenge na ndenge ya Molimo Mosantu, oyo ezalaki kongénga na nkembo ya Nzambe, ete eleka. Ezalaki na likama mingi, mpamba te akoki kobungisa mwa ndambo ya bato na ye. Yango wana, Balaka aboyaki kotika Bayisalaele báleka. Kutu, bobangi na ye ezalaki mpenza monene mpo na bango, na lolenge ete akendaki kozwa mosakoli moko na nkombo ya Balama na mosala, mpe asengaki ye azala moyokanisi kati na ye ná Nzambe, mpe asénga na Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ete alakela Yisalaele mabe, mpe ákómisa bango bato oyo bazangi makasi. Bongo Balama, lokola azalaki na mposa makasi ya kosangana na makambo ya politiki mpe kokóma moto monene, asepelaki mingi kosala bongo. Kasi, na komónáká ete asengelaki kobelema na Nzambe mpe kokutana na Ye, mpo na kosala ete bato bálakelama mabe, lokola akokaki kosala yango ye moko te, akendaki kosenga Nzambe ndingisa ya kokende. Sikawa, ezali te kaka lokola Banikolaiti oyo tozali na bango lelo oyo? Balakelaka mabe moto nyonso oyo aboyi kolanda nzela na bango.
Ntango Balama asengaki Nzambe ndingisa ya kokende, Nzambe aboyelaki ye yango. Eee, yango eswaki ye! Kasi Balaka akangamaki kaka na kolakáká ye mbano mpe lokumu monene koleka. Na yango Balama azongaki epai na Nzambe. SIkawa, eyano moko ya Nzambe esengelaki kokoka mpo na ye. Kasi ezalaki bongo te mpo na Balama, moto ya motó makasi. Ntango Nzambe amonaki ezaleli na ye ya mabe, ayebisaki ye atelema mpe akende. Na mbala moko abongisaki mpunda na ye mpe ye wana akendeki. Asengelaki koyeba ete Nzambe epesaki ye bobele nzela mpe akokaki te kolakela bango mabe ata soki akendaki mbala ntuku mibale mpe amekaki mbala ntuku mibale. Bato bazali mpenza lokola Balama lelo oyo! Bandimaka ba-Nzambe misato, bazali kozbatisama na bibiangelo misato na esika ya NKOMBO, mpe atako bongo Nzambe akotinda Molimo likolo na bango lokola asalaki likolo ya Balama, mpe bakokoba na kondimáká ete bazali mpenza kati na solo, nzokande bazali mpenza Babalama. Bomoni, malakisi ya Balame. Bokende liboso ata bongo. Salá yango na ndenge na yo. Balobaka: “Ee, Nzambe apamboli biso. Esengeli na yango kozala malamu. Nayebi ete Apamboli bino. Nazali kowangana yango te. Kasi ezali nzela moko ya ebongiseli oyo Balama azwaki. Ezali nde kotyola Liloba ya Nzambe. Ezali malakisi ya lokuta.
Na boye Balama amataki mpunda mpe akendeki mbangumbangu na nzela kino anzelu moko atelemaki na nzela na ye. Kasi mosakoli wana (episkópo, kardinale, mokambi, mokonzi mpe mokengeli-mokonzi) azalaki mpenza na miso ya kokufa mpo na makambo ya Molimo likolo ya makanisi ya lokumu, ya nkembo mpe ya mosolo na lolenge ete akokaki te komona anzelu oyo atelemaki wana ná mopanga na loboko. Atelemaki wana mpo na kokanga nzela ya mosakoli wana ya bolema. Mwa mpunda moke wana emonaki ye mpe elukaki kokima ngambo na ngambo, kino nsukansuka efinaki lokolo ya Balama na efelo ya mabanga. Mpunda yango etelemaki mpe eboyaki kotambola. Akokaki te. Bongo Balama akitaki mpe abandaki kobeta ye. Na nsima, mpunda yango ebandaki koloba na Balama. Nzambe atikaki mpunda wana eloba na monoko mosusu. Mpunda yango ezalaki nyama ya mimboto misangana te; ezalaki momboto ya ebandeli. Alobaki na mosakoli oyo akufá miso ete: “Ngai nazali mpunda na yo te, mpe namemá yo na bosembo te?” Balama ayanolaki ete: “Iyo, iyo, ozali mpunda na ngai mpe omemi ngai na bosembo nyonso kino sikawa; mpe soki nakoki te kosala ete ótambola, nakoboma yo... eh! Oyo likambo nini, kosolola ná mpunda? Likambo ya kokamwa, nakanisaki ete nayokaki mpunda ezali koloba na ngai, na yango nazalaki koyanola yango.”
Nzambe alobaka ntango nyonso na minoko na sika. Alobaki na elambo ya Belesasala mpe na nsima na Pantekote. Azali kosala yango lisusu lelo. Ezali likebisi ya kosambisama oyo ebelemi.
Na nsima, anzelu yango amimonisaki na miso ya Balama. Ayebisaki Balama ete soki ezalaki mpo na mpunda te, mbele asilaki kokufa mpo ete amekaki Nzambe. Kasi ntango Balama alakaki kozonga, atindamaki ete akende liboso ná likebisi ya koloba bobele makambo oyo Nzambe akopesa ye.
Bongo Balama akendeki mpe atongaki bitumbelo nsambo mpo na banyama ya peto pona mbeka. Abomaki mpate-mobali, elembo ya boyei ya Masiya Ayebaki eloko nini ásála mpo na kobelema na Nzambe. Azalaki na makoki nyonso etyami malamu; kasi azangaki nde nguya; ezali mpe bongo lelo oyo. Bokoki komona yango te, bino Banikolaiti? Yisalaele azalaki kuna na lobwaku kopesáká mbeka ndenge moko, kosaláká makambo ndenge moko, kasi bobele moko nde azalaki na bilembo oyo bizalaki kolanda ye. Bobele moko nde azalaki na Nzambe kati na bango. Lolenge ya libanda ekomema yo esika moko te. Ekoki kozwa esika ya bomonisami ya Molimo te. Yango nde esalemaki na Nicée. Bandimaki malakisi ya Balama, kasi malakisi ya Nzambe te. Bongo babetaki libaku mpe bakweyaki Bakómaki bato oyo bakufá.
Nsima na mbeka kopesama, Balama amilengelaki mpo na kosakola. Kasi Nzambe akangaki monoko na ye mpe akokaki kolakela bango mabe te. Apambolaki bango.
Balaka silikaki makasi, kasi Balama akokaki kobongola lisakoli yango te. Elobamaki na Molimo Mosantu. Na yango, Balaka ayebisaki Balama ete akita na nse, na lobwaku, mpe atala bolembu na bango mpo na komona soki ezalaki na lolenge moko te oyo akokaki kolakela bango mabe. Mayele oyo Balaka asalelaki ezali mpe oyo bazali kosalela lelo oyo. Bibongiseli minene batyoloka bituluku ya mikemike, mpe eloko nyonso bakutaka kati na yango oyo ekoki kobetisa libaku, babimisaka yango mpe bagangaka makasi na ntina na yango. Soki bato ya mikolo oyo bazali kobika kati na lisumu, moto moko te alobelaka yango; kasi tika bobele moko ya baponami akota na mobulu, zulunalo nyonso ekopanza yango na mboka mobimba. Ya solo, Yisalaele azalaki na bolembu na ye (ya nzoto). Bazalaki na ngambo na bango oyo ebongaki na lokumu te; kasi atako bolembu na bango, engebne mokano na Nzambe oyo aponaki bango na ngolu na Ye, kasi na misala na bango te, BAZALAKI NA LIPATA NA MOYI MPE NA LIKONZI NA MOTO NA BUTU, BAZALAKI NA LIBANGA EBETAMI, NYOKA YA MOTAKO MPE BILEMBO NA MAKAMWISI. Bazalaki bato oyo batatolamaki - na bango moko te, kasi na Nzambe.
Tanga compte mobimba na...
Eleko ya Lingomba ya Pelegamo.
Mokanda ya Emoniseli.
Ekobi na lokasa elandi.
(Maloba ya Ebandeli mpo
na Bileko ya Lingomba.)
Hub ya Nsango... Pona monoko na yo mpe kozwa bansango oyo euti na Ndeko Branham.