Maloba ya Ebandeli mpo na Bileko ya Lingomba.


  Mokanda ya Emoniseli série.

Lingomba nsambo ya Asie.


William Branham.

Tanga compte mobimba na...
Eleko ya Lingomba ya Efeso.

Mpo ete bososola malamu nsango ya Bileko ya Lingomba, nakolinga kolimbola mitinda ndenge na ndenge oyo epesaki ngai nzela ya kokóma na bankombo ya bamemi-nsango, bolai ya bileko, mpe makambo mosusu oyo etali yango.

Lokola boyekoli oyo esengelaki kozala oyo eleki monene oyo nasálá naino te kino na ntango oyo, nalukaki Nzambe mikolo mingi mpo ete Molimo Mosantu epemela ngai. Na nsima kaka nde natángaki Makomi likolo na Bileko ya Lingomba, mpe nakotaki na mozindo kati na babuku mingi ya masolo ya lingomba oyo ekomamaki na bato ya mayele ya mambi ma kala oyo ya sembo mpenza, oyo nakokaki kozwa. Nzambe azangaki te koyanola libondeli na ngai, mpo ntango natangaki Liloba mpe masolo ya kala, Molimo Mosantu epesaki ngai likoki ya komona motindo makambo ezongelaka kosalema na boumeli ya bikeke kino na ntango oyo, na mikolo oyo ya nsuka.

Sɛkɛlɛ oyo Nkolo apesaki ngai mpo na koyeba momemi-nsango ya eleko mokomoko euti mpenza na Makomi. Kutu, ekoki kobengama Libanga Likonzi ya Biblia. Ezali komonisa ete Nzambe abongwanaka te, mpe ete banzela na Ye ebongwanaka te ndenge Ye moko abongwanaka te. Na Baebele 13:8 elobami boye:

“Yesu Klisto azali ndenge moko lobi, lelo, mpe libela.”

Mosakoli 3:14-15,
“Nayebi ete nyonso oyo Nzambe asalaka, ekozala libela na libela: eloko moko te ekoki kotiama na yango, mpe eloko moko te ekoki kolongolama na yango: mpe Nzambe asalaka bongo mpo ete bato babánga Ye.
Oyo ezali sikawa esilá kozala; mpe oyo ekosalema esilá kozala; mpe Nzambe azali kozongisa makambo oyo eleká.”

Ezali: Nzambe oyo abongwanaka te, Oyo azali na banzela oyo ebongwanaka te. Oyo Asalaki na LIBOSO, Akosengela kokoba kosala yango kino ekosalema mpo na mbala ya SUKA Mbongwana ekozala ata moke te. Bosalela yango na Bileko na Lingomba. Lolenge ya moto oyo Nzambe aponaki mpo na eleko ya liboso, mpe lolenge Nzambe amimonisaki kati na mosala ya moto yango, ekozala ndakisa mpo na bileko mosusu nyonso. Oyo Nzambe asalaki na eleko ya lingomba ya liboso, ezali oyo Alingi kosala na bileko mosusu nyonso.

Sikawa toyebi mpenza malamu uta na Liloba oyo ekomamaki na Molimo Mosantu, ndenge nini lingomba ya yambo, to ya ebandeli, ebandisamaki, mpe lolenge nini Nzambe amimonisaki kati na yango. Liloba ekoki kobongwana to kobongolama te mpambe te Liloba ezali Nzambe. Yoane 1:1,

“Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki mboka na Nzambe, mpe Liloba azalaki Nzambe.”

Kobongola liloba moko na yango, lokola Ewa asalaki, ememaka lisumu mpe liwa, ata ndenge elobami na Emoniseli 22:18-19,

“...Soki moto moko abakisi eloko na makambo oyo, Nzambe akobakisela ye malɔzi oyo ekomami na buku oyo:
Mpe soko moto akolongola na maloba na buku ya lisakoli oyo, Nzambe akolongola eteni na ye na Buku na Bomoi, mpe na engumba mosantu ya bulee, mpe na makambo oyo ekomami na buku oyo.”

Na bongo, lolenge oyo lingomba ezalaki na Pantekote ezali ndakisa oyo tosengeli kolanda. Yango nde emekoleli. Emekoleli mosusu ezali te. Ata soki bato ya mayele balobi nini, Nzambe abongoli lolenge ya koala wana te. Oyo Nzambe asalaki na Pantekote, Asengeli kokóba kosala yango kino na nsuka ya bileko ya lingomba.

Atako bato ya mayele bakoki koyebisa bino ete eleko ya bantoma esili, bondima yango ata moke te. Maloba ya ndenge wana ezali mabe na makambo mibale. Ya liboso, ezali mabe kokanisa ete bantoma bazalaka lisusu te, kaka mpo ete bazomi na mibale ya ebandeli bakufá. Ntoma elingi koloba moto oyo atindami'; mpe ezali na batindami mingi lelo, kasi babengami bamisionele. Ntango nyonso oyo bato bazali kobyangama mpe kotindama ná Liloba ya Bomoi, eleko ya bantoma ezali kokoba. Ya mibale, bazali koloba lokola soki ete eleko ya komonisama ya nguya ya Molimo Mosantu esukaki uta basilisaki kokoma Biblia. Ezali solo te. Ezali ata na Makomi moko te oyo elobi bongo, kasi mingi kutu ezali koloba makambo oyo ekeseni. Talá elembeteli oyo emonisi ete bifundeli yango nyonso mibale ezali lokuta.

Misala 2:38-39,
“Bongo Petelo alobaki na bango ete, Bobongola mitema, mpe bobatisama moko na moko na bino na Nkombo na Yesu Klisto mpo na kolimbisama ya masumu na bino, mpe bokozua likabo ya Molimo Mosantu.
Mpamba te, elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bato nyonso oyo bazali mosika, baoyo nyonso Nkolo Nzambe na biso akobenga.”

Elaka ya nguya oyo epesamaki na bantoma na Pantekote ezali mpo na bino (Bayuda), mpe mpo na bana na bino (Bayuda), mpe mpo na baoyo nyonso bazali mosika (Bapagano), mpe mpo na baoyo nyonso Nkolo Nzambe na biso akobenga (Bayuda mpe Bapagano). Kino Akotika kobenga, nsango mpe nguya ya Pantekote EKOSILA TE.

Oyo lingomba ezalaki na yango na Pantekote ezali likoki na ye oyo ekoki kolongolama te. Na ebandeli, azalaki na Liloba ya Nzambe ya peto. Azalaki na nguya ya Molimo oyo emonisamaki na bilembo, makamwisi mpe makabo ndenge na ndenge ya Molimo Mosantu.

Baebele 2:1-4,
“Yango wana tosengeli kotya likebi mingi na makambo oyo toyokaki, soki te tokobunga nzela.
Mpamba te, soki Liloba oyo lilobamaki na baanzelu ezalaki makasi na lolenge ete bobuki mpe bozangi botosi (na Liloba) ezwaki etumbu ya sembo;
Bongo ndenge nini tokokima etumbu soki totali mpamba lobiko ya monene boye? Lobiko yango elobamaki yambo na Nkolo, mpe etalisamaki epai na biso na baoyo bayokaki Ye;
Nzambe mpe atatolaki mpo na bango, na nzela ya bilembo, makambo ya kokamwa, mpe makamwisi ya ndenge na ndenge, mpe na nzela ya makabo ya Molimo Mosantu engebene mokano na Ye moko”

Lingomba wana ya ebandeli ebongisamaki na bato te. Ekambamaki na Molimo Mosantu. Ezalaki mpenza monene te. Bayinaki yango mpe batyolaki yango. Ezalaki konyokolama. Banyokolamaki kino na liwa. Kasi ezalaki sembo epai na Nzambe. Ekangamaki ndakisa ya Liloba ya ebandeli.

Sikawa, botika te ete bákosa bino awa. Ntango nalobaki ete Nzambe abongwanaka te mpe banzela na Ye ebongwanaka ata moke te, Nalobaki te ete lingomba mpe bamemi-nsango na yango bakoki kobongwana te. Lingomba ezali Nzambe te. Na bongo ekoki kobongwana. Kasi oyo nalobaki ezalaki ete lokola Nzambe abongwanaka te mpe azali na banzela oyo ebongwanaka te, tokoki kozonga na ebandeli mpe komona likambo ya liboso mpe ya kobonga be oyo Nzambe asalaki, bongo na nsima tosámbisa na kozwáká yango lokola ndakisa. Esalemaka nde bongo. Lingomba ya Solo ekomeka ntango nyonso kozala lokola oyo ya ebandeli na Pantekote. Lingomba ya solo ya lelo ekoluka kokokana na oyo ya yambo wana ya ebandeli. Mpe bamemi-nsango na mangomba, lokola bazali na Molimo moko wana ya Nzambe kati na bango, bakoluka kokokana na ntoma Polo. Bakokokana mpenza na ye te; kasi bamemi-nsango ya solo bakozala baoyo babelemi mpenza na Paulo, oyo azalaki nsomi liboso na bato nyonso, amikabaki mobimba na Nzambe, mpe ateyaki bobele Liloba ya Nzambe, mpe amonisaki Molimo Mosantu na nguya. Eloko mosusu ekotambola te. Osengeli kobanda na oyo ya ebandeli. Ndenge eloko ya ebandeli ebotaka na kolanda motindo na yango, Lingomba ya Solo ekozala ntango nyonso lingomba oyo ezali kosala makasi ete elanda matambe ya babandisi na yango na Pantekote mpe bamemi-nsango na yango bakolanda ntoma Polo, momemi-nsango ya liboso na eleko ya lingomba ya liboso. Ezali na yango pete, mpe ezali kitoko mingi.

Na moboko wana ya pete, kasi ya kokamwa mpenza, nakokaki, na lisungi ya Molimo Mosantu, kotanga Buku ya Emoniseli mpe masolo ya kala, mpe kokuta kati na yango eleko moko na moko, motindami moko na moko, bolai ya eleko moko na moko, mpe eteni moko na moko asalaki na mokano na Nzambe uta Pantekote kino na nsuka ya bileko yango.

Lokola bososoli sikawa ndenge nini tosalaka mpo na koyeba lolenge Lingomba ya Solo ezalaki (oyo ezalaki na Pantekote mpe oyo ezalaki na eleko ya bantoma ndenge etalisami kati na Liloba na Buku ya Misala), tokoki kosalela mobeko moko wana mpo na kolakisa ndenge nini lingomba ekweyaki. Libunga, to mabunga ya moboko oyo ekotaki na lingomba ya yambo mpe emonisami kati na Buku ya Misala mpe ya Emoniseli, mpe lisusu kati na Mikanda; ekokóma komonana polele mpenza na eleko moko na moko oyo ekolanda, kino tokokóma na kolimwa mobimba ya bosolo kati na eleko ya nsuka, Eleko ya Laodikia.

Sikawa uta na fungola oyo ya yambo oyo tozwi na Nkolo, bosolo mosusu ya kokamwa mingi te esali kobima. Nalobaki ete Lingomba ya Solo ekomeka ntango nyonso kozala lokola oyo ezalaki na Buku ya Misala. Ezali mpenza ya solo. Kasi tokomi na komona ete Liloba ezali mpe koteya ete libunga ekotonda kino solo ekolimwa mpenza mobimba na mokolo ya nsuka wana bomonani ya Nkolo ebelemi. Motuna moko ezali sikawa koya na makanisi na biso : Nzambe azali nde kosundola baoyo ya Ye mpe kotika bango bakweya kati na motambo ya lokuta? Ata moke te, mpamba te Makomi elobi polele mpenza na Matai 24:24, ete Baponami BAKOKI kokosama TE.

“Mpo ete ba Klisto na lokuta mpe basakoli na lokuta bakobima mpe bakosala bilembo minene mpe makamwisi mpo na kokosa ata baponami, SOKI EKOKAKI kosalema”.

Ezali nini? Eyano ezali polele liboso na biso. Ezali na Lingomba ya Solo mpe lingomba ya lokuta. Ezali na Mowiti ya Solo mpe mowiti ya lokuta. Kasi na ntembe te, lingomba wana ya lokuta, nzoto mowiti ya lokuta, ekomeka ntango nyonso kozwa esika ya Lingomba ya solo mpe koloba ete yango ezali lingomba ya solo mpe ya malamu, kasi ya Baponami te. Oyo ya lokuta akomeka koboma oyo ya Solo. Bongo nde ezalaki na Mokanda ya Misala, bongo nde emonisami kati na bileko nsambo, mpe ezali bongo nde esakolami kati na mikanda mikeseni. Ezalaki ndenge wana. Ezali bongo sikawa. Ekozala ndenge wana. Ekoki kobongwana te.

----
Mangomba nsambo wana oyo ezalaki na Asie Mineure na tango wana ya kala, ezalaki na bizaleli mosusu kati na yango oyo ekómaki mbuma oyo ekɔmeli ya bileko oyo bikolanda. Oyo ezalaki bobele milona mike na ntango wana, ekomaki na nsima mbuma oyo ekomeli na ntango ya kobuka, kaka ndenge Yesu alobaki.
Mpamba te, soki basali makambo oyo na nzete ya mobesu, bongo bakosala nini na nzete ya kokawuka?” Luka 23:31.

Tanga compte mobimba na...
Eleko ya Lingomba ya Efeso.


Site ya sango ya
Lingelesi.

Mokanda ya
Emoniseli série.

Nzambe na Siansi.
Index - Arkeoloji.

Konetolama.

Nsango malamu.
Yesu akufaki mpo
na masumu na yo.

Batisimo na Mai.

 
 

Bonzambe elimbolami.

 

Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Bikangelo Sambo.

Série Kotambola ya
Bakristu.

Nzambe na Histoire.
Masuwa ya Noa.

Lisumu ya ebandeli.
Ezalaki nde Pomme?

  Makomi elobi...

Na mokolo wana, ezala pole to malili to mpe mvula, eloko moko te ekozala.

Ekozala mokolo ya ndenge mosusu, mokolo ezanga moyi mpe butu, mokolo oyo Ye moko kaka Yawe ayebi ; pole ekobima soki pokwa ekoki.

Zakari 14:6-7



Mokanda ya Emoniseli.
Ekobi na lokasa elandi.
(Bikangelo Sambo.)


Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba to PDF.


Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

God, Hidden and
Revealed in simplicity.

(PDF Lingelesi)

William Branham
Life Story.

(PDF Lingelesi)

How the Angel came
to me.

(PDF Lingelesi)


 


Hub ya messagerie... Pona monoko na yo pe télécharger ba messages ya ofele epai ya Ndeko Branham.