Momboto ya Nyoka.


  Liloba ya Bomoi série.

Mayele mabe Nyoka.


William Branham.

Tanga compte mobimba na...
Momboto ya Nyoka.

Ebandeli 3:1-7,
1 Nyoka alekaki nyama na mokili na mayele mabe, oyo Nkolo Nzambe asilaki kozalisa. Alobaki na mwasi ete, Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolia mbuma na nzete nyonso na elanga te?
2 Mmwasi azongiseli nyoka ete, Tokoki kolia mbuma na nzete na elanga.
3 Kasi mpo na mbuma na nzete... na katikati ya elanga, Nzambe alobi ete Bino bokoki kolia yango te, mpe bokomama yango te ete bokufa te.
4 Bongo nyoka alobaki na mwasi ete, Bino bokokufa solo te:
5 Mpo ete Nzambe ayebi malamu ete na mokolo oyo bokolia yango, miso na bino makofungwama, mpe bino bokozala lokola banzambe, koyebáká malamu mpe mabe.
6 Bongo ntango mwasi amonaki ete nzete ezalaki malamu mpo na bilei, mpe ezalaki kitoko na liso, mpe ezalaki kofungola... ezalaki na motuya mpo na kopesa mayele, akamataki mbuma na yango, mpe aliaki, apesaki mpe na mobali na ye oyo azalaki pene na ye; mpe aliaki yango.
7 Miso na bango mibale mazipwaki, mpe bayebaki ete... bazalaki bolumbu. Basonaki nkasa na mosuke, mpe basalaki bilamba na bango.

Botala sikawa, likambo oyo esalemaki. Nandimi mpe nakoki kotalisa yango na Biblia, ete ezali nyoka nde asalaki yango. Moto oyo azali kozanga kati kati na mokomboso ná moto, ezali nyoka. Mpo ete, boyoka, botala malamu sikawa, nyoka azalaki linyóka te. Azalaki na “mayele mabe” koleka banyama nyonso ya elanga.
Boye, nakendeki lelo kozwa ba-buku ya bagó bisika nyonso, mpo na koluka koyeba nini liloba oyo mayele mabe elingi koloba. Elingi koloba “kozala na mayele mingi,” mpe, na ndimbola ya malamu koleka ya - ya Baebele (yango euti na m-a-h-a-h, mahah) elingi koloba “kozala na boyebi ya solo ya mibeko ya bomoi.”

Sikawa, tótala naino yango mwa moke. Azali na mayele mingi, mayele mabe, nzokande abengami “nyoka.” Kasi bobosana te, azalaki eloko ya mayele mingi koleka, mpe akokanaki mpenza na moto koleka biloko nyonso oyo ezalaki na elanga; pene mpenza na moto. Azalaki linyóka te. Kolakama mabe nde ekomisi ye linyóka. Mpe azalaki... Biblia elobi ete azalaki oyoi aleki kitoko kati na nyonso. Mpe ata elakeli mabe elongolaki bozenga na ye nyonso te, nzokande balangi ya nkembo ya nyoka ezali kitoko, mpe bozenga ná ekenge na ye. Ata elakeli mabe elongolaki ye yango te. Kasi kobosana te, Nzambe ayebisaki ye ete makolo na ye makolongwa mpe akotambola na libumu na ye. Mpe bakoki komóna mokúwa ata moko te kati na nyoka oyo ekokani na oyo ya moto, mpe yango nde ntina bato na mayele babulangani. Kasi ye wana.

Nzambe abombi yango liboso na miso ya bato na bwanya mpe ya mayele, mpe Alakaki ete Akomonisa yango epai na bana na Nzambe na mikolo ya suka, ntango bana na Nzambe bakomonisama, ntango,“bana na Nzambe oyo bazalaki kosepela kutu liboso na kozalisama na mokili. ” Ntango emoniseli monene ya Bonzambe mpe makambo mosusu ekopesama na mikolo ya suka, Akomonisa makambo yango na bana na Nzambe. Boyebi ete Makomi ezali koteya yango. Mpe tokomi na esika yango. Yango nde ntina Nzambe azali kofungolela biso makambo oyo. Nzambe azali komema bana na Ye na komonisama. Azali kokende likolo koleka esika boyebi nyonso ya bato esuki, mosika kino na kati ya bimoniseli ya molimo, mpe Azali komemela biso yango. Biso totalisaki kati na Biblia oyo te ete: “Awa ezali mpo na ye oyo azali na bwanya”? Ezali te makambo oyo atangaki na likindo; kasi makambo oyo ayekolaki na mabolongo na ye liboso na Nzambe, mpe oyo Nzambe asepeli kopesa ye. Bana na Nzambe, oyo bamonisami!

Botala nyoka, sikawa botala oyo nyoka azalaki, nakotalisa na bino lolenge azalaki, mpo na ngai. Tozali na... tokitaki longwa na ligbololo, na litaká, mpe bongo na bongo, mpe boye mpe boye, kino na suka tokomi na makako, mpe na mokomboso. Mpe uta na mokomboso, wana topumbwe kouta na mokomboso na moto, mpe tozali komituna mpo na nini.
“Ee,” bato ya mayele balobi, “sikawa bozela! Tokoki kosangisa mwasi ná makako, mpe ná mokomboso; mpe na ngambo mosusu, kosangisa mobali na mokomboso.” Ekosimba te. Sangisa ye ná nyama mosusu nyonso; ekotambola te. Makila na bango ekoki kosangana te; kamata makila na yo, ezali makila oyo ekeseni mpenza.

Ezali nde likambo ya makila awa, mpe bakoki komona nyama yango te. Oh, Aleluya, nabandi komiyoka mosambeli sikawa. Botala. Mpo na nini? Nzambe abombelaki bango yango. Mokuwa ata moko te ya nyoka ekokani na mokuwa ya moto. Atie likambo yango mosika mpenza na lolenge ete bato ya mayele bakoki komona yango te. Mpe nakotalisa bino esika moto ya mayele oyo auti, esika - esika azali, kutu. Bomoni, akoki koya na nzela wana te. Esengeli koya na nzela ya emoniseli: “Yo ozali Klisto, Mwana na...” “Likolo na libanga oyo Nakotonga Lingomba na Ngai; mpe bikuke ya lífelo ekoki kolonga yango te,” emoniseli ya molimo. Ndenge nini - ndenge nini Abele ayebaki ete esengelaki kopesa mbeka ya mwana na mpate, na esika ya mbuma na elanga lokola Kaina apesaki? Emonisamaki na ye na molimo. Okozwa yango na nzela ya bakelasi ya likindo te. Okozwa yango na nzela ya bibongiseli te. Ozali kozwa yango uta na Lola.

Sikawa botala malamu nyoka, nyoka oyo ya ebandeli. Tika toyema elilingi na ye sikawa. Azali moto moko engambé mpenza. Azali kati kati na mokomboso mpe moto. Mpe, nyoka; zabolo, Lusifele, ayebaki ete wana ezalaki makila bobele moko oyo ekokaki kosangana ná makila oyo ya moto, moto bobele moko oyo ye akokaki kosalela. Akokaki kosalela mokomboso te, makila wana ekoki ekosangana te. Akokaki kosalela makambo misusu ya ndenge na ndenge te. Akokaki kosalela mpate te. Akokaki kosala mpunda te. Akokaki kosalela nyama ata moko te; asengelaki kosalela nyoka oyo.

Tózua ye sikawa mpo tomona ndenge nini azali. Azali moto monene, mbinga, engambé ya ebandeli. Wana nde ezali kosala ete bámóna mikuwa wana minene, mpe nakolakisa bino yango na Biblia. Sikawa, bolanda na bokebi. Malamu. Moto monene ya mbinga oyo, toloba ete a - azalaki na molai ya metele misato, mapeka minene, mpe azalaki mpenza lokola moto. Mpe makila na ye; nsima na ye kolakelama mabe, ekokanaki na ya banyama mosusu. Okoki kosangisa banyama. Mpe ekobaki kopesa makila ya makasi koleka, lolenge ya bomoi ya likolo koleka, lolenge ya likolo koleka, ekomata kino ekokóma na moto. Kasi eloko ya suka oyo ezali koyokanisa awa, kati kati na awa, elongolamaki. Bato boni bayebi ete bato ya mayele bakoki komona eloko oyo ezali koyokanisa te? Bino nyonso boyebi yango. Mpo na nini? Ye oyo awa, nyoka. Ezalaki ye, moto monene ya mbinga. Mpe diabulu akiti, sikawa, alobi: “Nakoki kopesa kopemama.”

Sikawa, ntango obandi kotala basi mpe makambo bazali kosala, kobosana te, opakolami na diabulu (mpe azali mwasi na yo te). Botala sikawa, diabulu akitaki mpe akotaki kati na nyoka. Mpe akutaki Ewa na elanga na Edene, azalaki bolumbu, mpe asololaki na ye na ntina na mbuma oyo ezali na káti. *Káti elingi koloba “katikati,” mpe bongo na bongo; bososoli, tozali kati na liyangani oyo esangani, basi ná mibali. Mpe alobaki: “Bongo, ezali na elengi. Ezali malamu mpo na miso.” Asalaki nini? Abandaki kosala bolingo na Ewa, mpe abikaki ná ye lokola mobali na ye.

Mpe amonaki yango ezalaki na elengi, boye akendeki koyebisa mobali na ye, kasi asilaki kokumba zemi ya satana. Mpe abotaki mwana na ye ya liboso, nkombo na ye ezalaki Kaina, mwana ya Satana. “Sikawa,” yo okoloba, “yango ezali lokuta.”
Malamu, tokoyeba soki ezali lokuta to te. “Mpe Nakotya koyinana kati na Momboto na yo mpe momboto ya nyoka.” Nini? Momboto ya nyoka! Ye mwasi azalaki na Momboto, mpe ye nyoka azalaki na momboto. “Mpe Akopanza motó na yo, mpe yo okozokisa Ye na litindi.” Mpe mpota wana, kuna, elingi koloba “kosala Mbondi.” Bongo, talá “momboto” na yo ya nyoka. Sikawa botala, bato mibale kobima wana. Sikawa nyoka oyo, ntango atelemaki wana, engambe mobali monene oyo azalaki wana, asalaki ekobo elongo na mwasi ya Adama. Lisumu ezali wapi lelo? Eloko nini ezali kosala ete makambo ezala boye lelo oyo? Sikawa, ngai... Na ntembe te bokoki kososola likambo nazali koloba. Boye esalemaki nde bongo.

Mpe ntangoasalaki yango, Nzambe alobaki, Abandaki kobenga Ewa mpe Adama.
Mpe alobaki: “Nazali bolumbu.”
Mpe Ye alobaki: “Nani ayebisi yo ete ozali bolumbu?”
71 Wana babandaki kosala lolenge basalaka na mapinga, kobwaka mbeba likolo na moto oyo azali na nse na yo. Alobaki: “Ee, mwasi oyo Opesaki ngai, nde asali yango. Ye nde andimisi ngai ete nasala yango.”
Mpe ye mwasi alobaki: “Nyoka apesaki ngai mbuma ya pome”? Malamu, motei, lamuka.
Alobaki: “Nyoka azimbisi ngai.” Boyebi nini kozimbisa elingi koloba? Elingi koloba “kokomisa mbindo.” Ndenge akomisamaki. Zabolo apesaki ye mbuma ya pome soki moke te. “Nyoka azimbisaki ngai.” Mpe na sima elakeli mabe eyaki.

Alobaki: “Mpo oyoki nyoka na esika ya mobali na yo, olongoli bomoi na mokili. Mpe oko - okoyikisa mpasi na yo; mpe makanisi na yo ekozala na mobali na yo,” mpe bongo na bongo.
“Mpe lokola boyokeli mwasi na yo, na esika na Ngai (nazuaki yo na putulú; ekelamo ya likolo koleka), okozonga na putulú.”
“Mpe yo, nyoka, lokola osali bongo, okozala lisusu na makolo te. Okotambola na libumu na yo, mikolo nyonso ya bomoi na yo. Mpe okoyinama. Mpe putulú ekozala bilei na yo. ” Yango wana. Yango nde eloko oyo ezali kozanga.

Sikawa, botala Kaina koya. Tótala malamu bizaleli na ye. Kaina ye wana. Azali nini? Azali mosali mombongo ya mayele mabe. Azali mosali bilanga. Azali na mayele mpenza, na mayele mabe; mosambeli, mosambeli mpenza; bótala malamu - bótala malamu makoki na ye sikawa. Bolanda ngai bobele mpo na mwa miniti moke lisusu.
Ye oyo azali koya. Ayebi ete azali na bonsomi. Alingi kokende na losambo. Amitongeli ndako ya losambo, abongisi makabo. Amemi etumbelo, mpe nyonso. Atongi etumbelo, atie felele na ye likolo na yango. Atie elanga, mbuma ya elanga, apesi yango epai na Nzambe. Alobaki: “Yango oyo mpo na Yo, Nkolo. Nayebi ete toliaki mbuma ya pome, yango nde ememi nyonso oyo.” Bakitani na ye mosusu bazali na makanisi ya ndenge moko wana. Ezali kotalisa esika euti. Amemaki mbuma na ye ya pome, luta na elanga, akitisaki yango wana mpe alobaki: “Oyo ekosála mbondi.”
Nzambe alobaki: “Ezalaki mbuma ya pome te.”
Kasi, na nzela na emoniseli ya molimo, Abele ayebaki ete ezalaki makila. Na bongo, ayaki na mwana na mpate, akataki mongongo na ye, mpe akufaki. Mpe Nzambe alobaki: “Ezali boye. Oyo nde esalaki yango. Ezalaki makila.” Boyebi makila nini nazali kolobela. Malamu. “Makila nde esalaki yango.”

Sikawa botala malamu. Na nsima, ntango Kaina amonaki ete motúntuki ya ndeko na ye andimamaki liboso na Nzambe, mpe bilembo ná bikamwa bizalaki kosalema kuna, ayokelaki ye zuwa. Alobaki: “Tokopekisa makambo oyo kaka sikawa.” Bótala bandeko na ye, botala bana na ye, lelo. “Sikawa, ngai nazali na mayele koleka ye,” na bongo asilikaki. Nkanda wana eutaki wapi? Bokoki koloba ete Nkanda...? Abomaki ndeko na ye ya mobali. Azalaki mobomi.

Bino bokoki kobenga Nzambe mobomi? Mpe Adama azalaki mwana na Nzambe. Biblia elobi ete “Adama azalaki mwana na Nzambe,” na ebandeli wana ya peto kuna. Adama azalaki mwana na Nzambe. Mpe zuwa wana ná likunya, mpe makambo nyonso wana, ekokaki kobima na liziba oyo ya peto te. Esengelaki kouta na bisika mosusu. Mpe eyaki na nzela ya Satana, oyo azalaki mobomi mpo na kobanda. Biblia elobi: “Azalaki moto na lokuta mpe mobomi, uta na ebandeli.” Mpe ezali bongo. Mpe abomaki ndeko na ye. Mpe yango ezalaki elilingi ya kufa ya Klisto. Na sima, uta na yango, na ntembe te, Atelemisaki Sete mpo na kokamata esika na ye. Liwa, bokundami, mpe lisekwa na Klisto.

Mpe botala na nsima, bingambe na bino. Na sima Kaina akendeki na mokili na Noda. Soki tata na ye azalaki engambe moko monene ya moto, Kaina alingaki kokokana na nani? Tata na ye. Boye akendeki na mokili na Noda, mpe amemaki moko ya bandeko na ye ya basi.
Akokaki kosála lolenge mosusu te. Basi mosusu bakokaki kozala te kasi bobele na nzela ya Ewa. Balobaka ete babotaki bana babali mpe bana basi ntuku nsambo. Soki mwasi ata moko te azalaki... Biblia elobaka na ntina ya mbotama ya basi te, bobele ya mibali. Mpe ntango... soki basi misusu bazalaki te, bobele Ewa; boye ntango akufaki, bato balingaki kosila na mokili. Asengelaki kozala na bana basi. Mpe Kaina asengelaki kobala ndeko na ye moko ya mwasi.
Akendeki na mokili ya Noda mpe azuaki mwasi na ye. Mpe ntango abalaki ye kuna, ezali kuna nde bingambe minene wana bautaki, baoyo bazalaki bana na Nzambe oyo bakweyaki; oyo bautaki na tata na bango, Zabolo, na nzela na kaina. Yango nde eteni oyo ezali kozanga.

Tanga compte mobimba na...
Momboto ya Nyoka.


Site ya sango ya
Lingelesi.

Mokanda ya
Emoniseli série.

Nzambe na Siansi.
Index - Arkeoloji.

Konetolama.

Nsango malamu.
Yesu akufaki mpo
na masumu na yo.

Batisimo na Mai.

 
 

Bonzambe elimbolami.

 

Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Bikangelo Sambo.

Série Kotambola ya
Bakristu.

Nzambe na Histoire.
Masuwa ya Noa.

Lisumu ya ebandeli.
Ezalaki nde Pomme?

  Makomi elobi...

Tala ndenge mwasi ya ndumba asalaka: Soki alie, apangusaka monoko; mpe na sima, akoloba: «Nasali na ngai mabe te!»

Masese 30:20



 

Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba to PDF.


Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

The Pillar of Fire.

(PDF Lingelesi)

God, Hidden and
Revealed in simplicity.

(PDF Lingelesi)

Marriage and
Divorce.

(PDF Lingelesi)

William Branham
Life Story.

(PDF Lingelesi)

How the Angel came
to me.

(PDF Lingelesi)


Hub ya messagerie... Pona monoko na yo pe télécharger ba messages ya ofele epai ya Ndeko Branham.