Kiyungulu ya moto ya mayele.
<< oyo eleki
oyo elandi >>
Bopétolami na lisumu.
William Branham.Tanga compte mobimba na...
Kiyungulu ya moto ya mayele.Mituya 19:9,
Mpe moto oyo azali peto, akokamata mputulu ya ngombeyango, mpe akotya yango libanda na molako na esika moko ya peto, mpe ekobatelama mpo na liyangani mpo na liyangani ya bana na Yisalaele lokola mai ya kokabola: ezali kopetolama ya masumu.Ezali koyokana makasi mpenza mpo na liteya, mpo na motei oyo azali kotelemela mingi komela makaya, ete azwa motó ya liteya ya boye: Kiyunglu Ya Moto Ya Mayele. Esalamaki, ete, na ntongo wana, ntango nakendeki bokila ya biséndé.
Soki bino baoyo bozali na- kolanda na radio, to na nzela ya telefone, bokokaka komona bilongi ya bato oyo bazali awa na losambo ntango nalobi motó ya liteya na ngai, bolingaki mpenza koseka makasi. Kiyungulu Ya Moto Ya Mayele.
Ee, nyonso esalemaki epai Banje na Nkolo babimelaki ngai na ntongo moko, mpe biséndé wana bakelamaki na LIloba. Bino nyonso boyebi lisusu ntango likambo yango esalemaki. Mpe lisusu, lokola kaka likolo ya ngomba epai wapi natelemaki, ezalaki nde... bobele liboso na ngai koyeya Bileko Nsambo Ya Lingomba, nakendeki bokila mokolo moko liboso ntongo étána. Wana ezalaki na... Nakanisaki ete moi mozalaki kotana, pene na ngonga ya minei na ntongo. Ezalaki bomomesano te; namonaki Pole yango, bongo nabalukaki mpe wana ezalaki na Bisimbelo Ya Mwinda Nsambo Ya Wolo, etelemaki kuna likolo na ngomba, ná mpe lokola monama ezalaki kobima na batuyo na yango esika mafuta elekaka.
Mbala moko sima na yango, Nkolo Yesu amonanaki na biso. Mpe bobele na ntango yango, nayokaki Mongongo moko oyo elobaki: “Yawe ya Kondimana na Kala Azali Yesu na ya Sika.” Mpe Azalaki wana, sima ya mwa ntango, Amonisamaki na nzela ya Bisimbelo Ya Mwinda Nsambo wana Ya Wolo. Botala yango. Bato boni bazali komikanisela liteya yango? Nakomaki yango na nsima ya-ya karto ya-ya masasi oyo nazalaki na yango na libenga na ngai. “Yawe ya Kondimana na Kala azali Yesu na Sika.” Nzambe na lola ayebi ete yango ezalaki solo.
----
Natangaki awa na Buku ya... ya Daniele, epai wapi elobami na ntina na ye oyo akendeki epai na “Mokolo ya Mikolo, oyo azalaki na nsuki mpembe lokola nkuza na mpaté.” Na nsima namonaki Mokóló ya Mikolo. Azalaki Mokóló wana ya Mikolo, ndenge moko lobi, lelo, mpe libela. Bomoni, ezalaki nde elembo, kuna.Mpo na nini nsuki mpembe? Na nsima ngai... Emonanaki lokola Molimo Mosantu azalaki koloba na ngai na ntina na etlilingi ya mosambisi moko ya kala., namoná mbala moko. Boye nakendeki kotala na mambi ma kala; nazongaki kati masolo ya kala ya Biblia mpe nyonso, mpo na koluka koyeba. Mpe basambisi ya kala, lokola nganganzambe mokonzi ya Yisalaele, asengelaki kozala na nsuki mpe mandefu wana ya mpembe lokola nkuza na mpaté, mpo mpembe wana azalaki kolata elingaki koloba ete azalaki na bokonzi eleki likoló ya basambisi na Yisalaele.
Ata kutu lelo, to eleki mwa bankama ya mibu, mbala mosusu mibu nkama mibale, to mbala mosusu kutu moke koleka wana. Basambisi nyonso ys Angleterre, ata soki bazalaki bilenge to mikolo ya mibu soko boni, ntango bakotaki mpo na kosambisa, bazalaki kolata ekoti ya nsuki ya mpembe; mpo na kotalisa ete bokonzi mosusu ezali te, kati na bokonzi yango, likolo na maloba na bango. Liloba na bango ezali liloba ya suka kati na bokonzi. Oyo bango balobi, ekoki kolongolama te.
Mpe na bongo, namonaki yango. Ye Atelemaki wana, atako Azalaki elenge Mobali, kasi Alataki ekoti ya nsuki ya mpembe. Azalaki na mobimba Bokonzi oyo eleki likolo. Azalaki Liloba. Mpe Azalaki na, Alataki ekoti ya nsuki mpembe.
Bongo nsima, ntango tosilisaki liteya- yango, nakendeki na elimwelo ya ntango, ezali kuna nde Banje na Nkolo babimelaki ngai mpo na Bilembo Nsambo, mpe emataki na mipepe (tozali na elilingi na yango awa, mpe na mboka mobimba), Atelemaki wana, mpe Alataki bobele ekoti yango ya Bokonzi oyo eleki likolo. Azali Motó ya Lingomba. Azali Motó ya Nzoto. Ezali na eloko moko te lokola Ye, ata na esika nini. “Asalaki biloko nyonso na nzela na Ye moko. Asalaki biloko nyonso mpo na Ye moko, mpe libanda na Ye eloko moko te ekelamaki.” “Azali na bokonzi nyonso na Likolo mpe na nse,” mpe nyonso ezali ya Ye. “Mpe litondi na Bonzambe efandi kati na nzoto na Ye.” “Bongo Liloba ezalaki Nzambe, mpe akómaki mosuni kati na biso.” Mpe Ye nde Amonisaki sekelé mobimba ya mwango nyonso ya lobiko, oyo basakoli ná bato na mayele nyonso balobelaki. Bobele Ye nde Alataki ekoti mpe Azali bokonzi oyo eleki likolo.
Sikawa, natelemaki na likolo ya ngomba na ntongo wana, emonanaki lokola biséndé bilekaki wana. Bongo nabandaki kogumbama. Mpe nazalaki wana bobele mwa moke, ntango matiti ebukanaki pembeni na ngai, mpe mbinga ya mobali moko, oyo azalaki na mondóki ya madusu mibale, ayaki, kotamboláká na matiti wana mpe abangisaki ngai makasi mpenza. Nagumbamaki na lobango, nazalaki kobanga koningana, kobanga ete ábéta ngai masasi. Matiti ekobaki koningana, na bongo nafandaki kimia mpenza.
Eséndé moko amonanaki likolo na ngomba, mpe moto yango abetaki ye masasi na mondoki wana ya madusu mibale. Kasi ezwaki ye te, mpe na bongo eséndé yango akitaki na ngambo mosusu ya ngomba. Namilobelaki: “Boye, tika nalongwa awa na ntango makeléle ezali naino koyokana. Mpe bondóki na ye ezali lisusu na masasi te.”
Boye nabandaki kokita na ngomba, mpe moto yango abetaki masasi kaka liboso na ngai. Yango esalaki ete nábaluka na ngambo oyo. Mpe nabandaki kokita na ngambo mosusu, mpe bondóki ya 22 ebandaki kobeta, bongo masasi ezalaki koleka likolo na ngai. Nalobaki: “Namoni ete ngai nazali na esika moko ya nsomo.”Na bongo nabalukaki mpe nakitaki na ebale. Mpe namilobelaki: “Nakokita awa mpe Nakomibomba kino bakosilisa, bongo nakoki kobima.” Bongo wana ezalaki ngai kokita, esalamaki ete nábéndama na ... Makanisi na ngai ebandamaki ete natála na loboko na ngai ya mobali. Mpe ntango natalaki, namonaki wana pake moko ya makaya kasi ezalaki mpamba, moko na bango abwakaki yango ntango bazalaki kokima na matiti mpo na kolanda biséndé.
Natalaki yango na nse. Nalokotaki yango te, mpamba te nalingaka nsolo na yango te, mpo na kobanda. Natalaki wana na nse, mpe -ezalaki na nkombo ya kompanyi moko boye ya makaya, oyo nabanzi, nasengeli kotanga nkombo na yango te, bokoyeba yango. Ezalaki na maloba oyo likolo na yango : “Kiyungulu ya moto ya mayele mpe mposa ya momeli likaya.”
Natalaki yango, mpe nakanisaki: “Kiyungulu ya moto ya mayele?” Namilobelaki: “Soki moto yango akokaki kokanisa, akomela likaya ata moke te. Ndenge nini ekoki kozala 'kiyungulu ya moto oyo azali na mayele'? Moto oyo azali na mayele akomela likaya ata moke te.” Malamu.----
Natalaki yango, mpe namilobelaki: “Ezali leloko moko lokola -lokola bibongiseli ya lelo, mangomba oyo tozali na yango.” Moko na moko ezali na kiyungulu na yango moko; bazali na kiyungulu yalolenge na bango moko. Balekisaka bobele oyo bango balingi ete ekota, mpe bayebi oyo ekokota te; oyo bazali kolekisa na kiyungulu mpo ekota na kati to mpo na ebima libanda, nyonso wana na kiyungulu oyo ya bango moko. Bazali kotika mwa ndambo na makambo ya mokili ekota mpo na kosepelisa bazangi kondima oyo bazali kuna. Bazali kokotisa bango ata soki bazali ndenge nini, bobele ete bázála na misolo. Bakokotisa bango ata soki bazali ndenge nini, bobele ete bázála bato oyo bayebani.
Kasi solo ezali ete, okoki kokota na Lingomba na Nzambe ndenge wana te; ebongiseli te sikawa, nalingi koloba Lingomba ya solosolo, Lingomba ya Nzambe oyo ya solosolo.----
Bato, bayebi eloko balingi. Boye soki basengeli kozua eloko balingi, ekosengela na bango kozala na lolenge moko boye ya kiyungulu, mpo elekisa mwa ndambo ya mokili mpo na kosepelisa mposa na bango ya mokili. “Kiyungulu ya moto ya mayele, mposa ya momeli likaya.” Kiyungulu ya moto na mangomba, mpe mposa ya moto ya mokili.Bazali na mposa ya kozala basambeli. Bakanisi ete basengelaki kozala basambeli, mpo bazali na bomoto na kati. Ntango yambo tokómaki na mboka oyo, tokutaki ba-Indien kosambeláká moi mpe bongo na bongo, mpo ete (mpo na nini?) azali moto. Soki tokoti mpenza kuna na kati ya zamba ya Afrika, tokomona bakolo mboka kosambeláká eloko moko. Mpo na nini? Bazali bato, mpe balingi, basengeli kosambela. Na bongo, moto nyonso, ata soki akweyi ndenge nini, ayebi ete eloko moko ezali esika moko. Kasi azali mpenza na mposa moko ya mokili, na lolenge ete akoki te kokamata kiyungulu ya malamu. Asengeli kozala na kiyungulu oyo ye moko asali. Moto nyonso azali kosala kiyungulu na ye moko. Kompani moko na moko ya makaya ezali kobeta ntolo na oyo ya bango, na oyo bakoki kosala, “Kiyungulu ya solosolo! Oyo nde eleki malamu! Nyonso ezali na songé! ”mpe makambo lolenge wana.. Bazali koloba: “Elengi to mposa,” to eloko moko boye, “ezali kouta na songé.” Ô, mawa! “Na songé”? Bongo eloko nini kasi ezali na suka na yango? Wana ezali mpenza te mobali to mwasi oyo azali na mayele. Kasi ezali bongo nde bazali koloba, kokosáká bobele bato.
----
Botala na Mituya 19, nalingi ete botanga yango ntango bokozonga na ndako, ntango bokozala na ntango mingi. Botala, ntango Yisalaele asalaki lisumu, yambo bazalaki kokamata ngombe ya motane oyo atikala kozala na ekanganeli na nkingo na ye te. Elingi koloba ete atikala kotyama na ekanganelo na eloko moko te. Mpe asengelaki kozala motane. Langi ya motane ezali langi ya mbondi. Boyebi, bato ya zebi bayebi ete soki okamati motane mpe otali motane na nzela ya motane, ezali mpembe. Kótala motane na nzela ya motane, ezali mpembe. Nzambe atali na nzela ya Makila motane ya Nkolo Yesu, boye masumu na biso ya motane ekomi mpembe lokola matandalá; motane na nzela ya motane. Bongo ngombe ya motane azalaki kobomama na ntango na mpokwa na ya eyánganelo mobimba ya Yisalaele. Mpe bazalaki kotya minkolótó nsambo ya makila na ye na ekuke esika wapi eyánganelo mobimba esengelaki kokóta; elilingi ya Bileko Nsambo ya Lingomba, na nzela ya Makila.Na sima nzoto na ye ezalaki kokamatama mpe kotumbama. Ezalaki kotumbama elongo ná makolo, ná mposo, ná misopo, ná salité na yango. Biloko nyonso bizalaki kotumbama elongo. Mpe esengelaki kolokotama na moto moko ya péto, mpe esengelaki kotiama na esika moko ya péto libanda na eyánganelo. Yango wana, soki Yisalaele bakokaki bobele komona elilingi! Liloba na Nzambe oyo esengeli te kosimbama na maboko ya mbindo ya bozangi kondima. Esengeli kozala moto moko ya péto. Bongo soki azali péto, asengelaki koleka na nzela ya Kiyungulu na Nzambe.
Moto ya péto, maboko ya péto, mpe esengelaki kobatelama na esika moko ya péto; ezali te na esika oyo ba-Yezabele, ná “ba-Rickies”, mpe nyonso wana; bazali kolia elambo mpe makambo mosusu, na ntango wana bazali kotambola na basi, mpe mibali, mpe lolenge nyonso ya mbindo; kokendáká na mabina mpe bafeti, na basuki bakátá, balati bakupé ná biloko mosusu nyonso, mpe komibenga Baklisto. Esengeli kobatelama na esika ya péto, mpe koyángelama na maboko ya péto.
Na nsima, ntango Yisalaele asalaki lisumu, mpe bayebaki ete basalaki mabe, na bongo bazalaki komwangisama na mputulu ya ngombe yango, likolo na bango. Mpe wana ezalaki mai ya bokabwani, bopétolami na lisumu.Botala. Yango oyo! Bongo ntango Yisalaele, yambo na bango kokota na boyokani na nzela ya masanjoli, basengelaki liboso koleka na mai ya kokabola. “Kolongisama na nzela ya kondima; eyei na koyoka, koyoka Liloba.” Na sima bakotaki na eyánganelo na nse ya minkolótó nsambo wana, makila, mpo na kotalisa ete eloko moko ekufaki mpe ekendeki liboso na bango, mpo na masumu na bango. Bazalaki kokabwana na nzela ya boyoki Liloba, mai ya bokabwani, na bongo bakotaki na boyokani.
Esika bobele moko oyo Nzambe azalaki kokutana ná moto ezalaki na kolanda molongo wana. Akokaki kokutana na ye esika mosusu te. Asengelaki koya na kolanda molongo wana. Nzambe akutanaki na Yisalaele bobele na esika moko. Mpe Nzambe akokútana na bino lelo bobele na esika moko, mpe yango ezali kati na Yesu Klisto; mpe Ye Azali Liloba, mai ya bokabwani. Mpe Makila na Ye esopanaki mpo na Bileko Nsambo nyonso ya Lingomba. Bongo, na nzela ya Molimo Mosantu, biso tozali kokóta na boyokani wana, oyo epesami bobele na Lingomba. Ô, boni Azali monene!
Lisusu, sikawa, tolingi kotala na Baefese 5:26, elobi: “Ezali nde kosukolama na mai ya Liloba,” mai ya bokabwani. Yango esalaka nini? Na bongo, Kiyungulu ya Nzambe ezali Liloba. Mai ya bokabwani: “Kosukolama na mai ya bokabwani, na nzela ya Liloba,” Kiyungulu ya Nzambe.
Na boye okoki kokota kati na Klisto na nzela ya kiyungulu ya lingomba te. Okoki te koya na nzela ya kiyungulu ya ebongiseli, to kiyungulu ya endimeli moko boye. Kiyungulu ezali bobele moko oyo ekoki kokotisa yo na esika ya bulee wana, ezali na “bosukolami na mai na nzela ya Liloba.” Liloba na Nzambe nde ezali Kiyungulu ya moto ya mayele.Lingomba ekosambisa yo awa, soki ozali mondimi malamu, to te. Bakosalela yo matánga ya malamu, bakokitisa bendele na liwa na yo, bakotinda mitole minene ya bafololo mpe bakosala makambo nyonso mpo na yo. Kasi ntango ekómi mpo na bomoto na yo ya kati ekútana ná Nzambe, yango esengeli kozala na Bomoi na Seko. Mpe soki ezali Bomoi na Seko, ezali eteni ya Liloba. Mpe lokola liloba na ngai moko ekoki te kowangana... Loboko na ngai moko ekoki kowangana loboko na ngai te. Miso na ngai moko ekoki te kowangana loboko na ngai, to lokolo na ngai, to mosapi ya lokolo na ngai, to eteni nyonso ya nzoto na ngai. Bakoki kowangana yango te.
Bongo mpe moto moko te oyo azali eteni ya Liloba na Nzambe, to mwasi moko te, akoki kowangana eteni moko ya Liloba na Nzambe. Boye basi, ntango bokanisi ete bokoki kokata suki bongo boya Liboso na Nzambe, bozali na libunga. Bososoli yango? Bozali kosala libunga; bokoki te na lolenge wana koleka na Kiyungulu ya Nzambe epai wapi ya bosukwami na mai ya Liloba ezali. Na sima nde okokota na bondeko. Okanisi ete okomi wana, kasi okoki te kino ete okoleka na nzela ya Liloba, mpe mwa litono nyonso, Liloba moko na moko nyonso ya Nzambe. “Moto akobika bobele na mapa te kasi na Maloba nyonso.” Yango esengeli koleka na nzela ya kIyungulu wana, koleka na yango. Mpe yango ezali kotalisa mpímbó ya moyengebeni, mpo yango nde ye azali koluka, azali koluka eloko oyo ekopetola ye.
Liloba, Liloba na Nzambe ezali Kiyungulu ya moto oyo azali kokanisa, mpe ezali kosala mpímbó ya moyengebeni. Toyebi ete yango ezali solo; ezali kolekisa na kiyungulu mpe kobwaka libanda lisumu nyonso ya bozangi kondima. Kozanga kondima ezali lisusu te ntango oleki na nzela ya Kiyungulu, mpo yango ezali mpímbó ya mondimi ya solo.
Mondimi ya solo alingi kozala sembo, ata ndenge nini. Alingi bobele koloba te ete: “Ee, nazali moto ya etuluku ya lokumu. Nazali moto ya lingomba, lingomba ya monene koleka kati na engumba. ” Ata soki ezali mwa misio moko ya moke na litúmu moko boye, to ndako ya Nzambe ya matiti esika moko boye, moto ya mayele oyo akanisaka ayebi ete asengeli kokutana na Nzambe. Oyo lingomba elobi to oyo moto mosusu alobi ezali na ntina te, ye asengeli koya na ndenge Nzambe alingi. Mpe masengami ya Nzambe ezali Liloba na Nzambe.
“Ee,” bango balobaka, “'Liloba na Nzambe!'”
Solo, bango nyonso bandimaki ete Ezali Liloba na Nzambe, kasi bino bokoki kolekisama na kiyungulu Yango? Ndenge nini okoki kosala mpo ete mwasi oyo akátá suki áleka na nzela wana? Okosala yango ndenge nini? Okosala ndenge nini mpo na kotika moto moko oyo azali kondima Malakisi oyo te aleka Wana? Bomoni?
Ezali mpímbó ya moto ya makanisi te. Te. Moto ya mayele moko akokanisa, moto ya mayele akokanisa mbala mibale liboso na ye kokota na eloko ya ndenge wana.Botala, Liloba oyo ekoki komiboya Yango moko te. Na bongo ezali kosepelisa, to ezali mposa. Ezali mposa ya eloko nini? Eloko nini epesi yo mposa na Yango, mpo na kobanda? Ezali mpo ete kuna kati na bomoto na yo ya kati, ezalaki na momboto oyo eponamaki liboso, oyo ezalaki Bomoi ya Seko, efandaki kuna na kati ntango nyonso, ezalaki kati na yo ntango nyonso wana. “Nyonso oyo Tata apesaki Ngai bakoya epai na Ngai. Moko te kati na bango akobunga.”
Mpímbó ya moto ya makanisi, ntango moto ya makanisi ayoki Liloba na Nzambe: “Bampate na Ngai bayokaka mongongo na Ngai, mopaya bakolanda te,” mpo kuna na kati Bomoi ezali, mpe Bomoi esanganaka ná Bomoi. Lisumu esanganaka na lisumu, mpe lisumu ezali mpenza na bilongi mibale na lolenge ete ekanisi ete ebikisamaki ntango oyo ebikisamaki te. Ezali mpenza kati na bozindo ya bilongi mibale.
Tanga compte mobimba na...
Kiyungulu ya moto ya mayele.