Batisimo na Mai.

<< oyo eleki

oyo elandi >>

  Série Kotambola ya Bakristu.

Oyo ezali Nzela. Tambolá kati na yango.

Ezayi 55:6-7,
6 Boluka Yawe wana akoki nanu komonana, bobelela Ye wana azali nanu pene.
7 Tika ete moto mabe atika banzela na ye, mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye; tika ete azonga epai na Yawe mpo ete ayokela ye mawa, tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, pamba te alimbisaka kaka.

Pamba te biso nionso tozali basumuki.

Barome 3:23,
pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe;

Barome 3:10,
Moto ya sembo azali te, ata moko te;

Biso banso tosengeli koyambola.

Luka 13:3
Nazali koloba na bino: Ezali bongo te! Kasi soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.

Misala ya Bantoma 3:19,
Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino,

Ata mangomba esengeli koyambola.

Emoniseli 2:1,5,
1 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso:...
5 Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.

Emoniseli 3:19,
Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.

Tosengeli kozwa batisimo.

Malako 16:16,
Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.

1 Petelo 3:21,
Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto

Na kozindisama na mai.

Yoane 3:23,
Yoane mpe azalaki kobatisa na Enoni, pembeni ya Salimi, mpo ete mayi ezalaki mingi kuna ; bato bazalaki kokende kuna epai na ye mpe bazalaki kozwa libatisi.

Misala ya Bantoma 8:36-39,
36 Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki: - Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi?
37 Filipo alobaki: - Soki kaka ondimi wuta na motema na yo mobimba, okoki na yo kozwa libatisi. Moto yango azongisaki: - Nandimi ete Yesu-Klisto azali Mwana na Nzambe!
38 Mbala moko, apesaki mitindo ete batelemisa shar. Bongo bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo, bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye.
39 Tango babimaki na mayi, Molimo ya Nkolo alongolaki Filipo, mpe soda oyo baboma mokongo amonaki ye lisusu te, kasi akobaki mobembo na ye na esengo.

Engebene na motindo ya Apostoli.

1 Samuele 15:22,
...Botosi eleki mbeka; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.

Luka 24:45-49,
45 Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.
46 Alobaki na bango: - Tala makambo oyo ekomama: «Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato;
47 mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu.»
48 Bino nde bozali batatoli ya makambo yango. Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.

Misala ya Bantoma 2:36-39,
36 Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.
37 Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu: - Bandeko, tosala nini?
38 Petelo azongiselaki bango: - Bobongola mitema; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
39 Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.

Baoyo babatisami na Nkombo ya solo te,
bapesaki bango mitindo ete bázwa lisusu batisimo.

Misala ya Bantoma 8:14-17,
14 Tango bantoma, kati na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba na Nzambe, batindelaki bango Petelo mpe Yoane.
15 Tango bakomaki kuna, basambelaki mpo na bandimi ya sika mpo ete bazwa Molimo Mosantu,
16 pamba te Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango ; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.
17 Bongo, Petelo mpe Yoane batielaki bango maboko, mpe bazwaki Molimo Mosantu.

Misala ya Bantoma 19:1-6,
1 Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli mpe atunaki bango: - Boni, bozwaki Molimo Mosantu tango bokomaki bandimi? Bazongisaki: - Te! Totikala nanu koyoka te ete Molimo Mosantu azalaka.
3 Polo atunaki bango lisusu: - Bongo libatisi ya ndenge nini penza bozwaki? Bazongisaki: - Tozwaki libatisi ya Yoane.
4 Polo alobaki na bango: - Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.
5 Boye, bayokelaki ye mpe bazwaki libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.
6 Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na nkota ya sika mpe kosakola.

Misala ya Bantoma 10:48,
Boye, Petelo apesaki mitindo ete babatisa bango na Kombo na Yesu-Klisto....

Nasengeli kokɔta na lingomba nini?
Moko te kati na bango. Salelá Yesu Klisto.

Yoane 3:3,
Yesu azongiselaki ye: - Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.

Bagalatia 1:8,
Kasi soki moto moko, ezala biso to Anjelu moko kowuta na Likolo, ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo biso toteyaki bino, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe!

Ata profeta asengeli te kozala na boyokani te na makomi.

1 Bakolinto 14:37,
Soki moto akanisi ete azali mosakoli to azali na likabo ya Molimo, asengeli koyeba ete makambo oyo nasili kokomela bino ezali nde Mobeko ya Nkolo.

Esengeli toyamba Molimo Mosantu.

Misala ya Bantoma 1:4-5,
4 Mokolo moko, wana azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo: «Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na Ngai alakaki, likabo oyo boyokaki Ngai kolobela.
5 Pamba te Yoane abatisaki na mayi; kasi bino, sima na mwa mikolo, bokobatisama kati na Molimo Mosantu.»

Misala ya Bantoma 5:32,
Biso, tozali batatoli ya makambo oyo; ndenge moko mpe Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato oyo batosaka Ye azali motatoli ya makambo yango.

Yoane 16:7-14,
7 Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye.
8 Bongo tango akoya, akotalisa bato ya mokili na tina na lisumu, na tina na bosembo mpe na tina na kosambisama:
9 na tina na lisumu, pamba te bandimaka Ngai te;
10 na tina na bosembo, pamba te nakeyi epai ya Tata, mpe bokomona Ngai lisusu te;
11 na tina na kosambisama, pamba te mokonzi ya mokili oyo asili kosambisama.
12 Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi bokokoka kososola yango te sik’oyo.
13 Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya;
14 akomonisa nkembo na Ngai, pamba te akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango.

Misala ya Bantoma 1:8,
Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.

Barome 8:9-11,
9 Nzokande bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Mpe soki moto azangi Molimo ya Klisto azali mpe moto na Ye te.
10 Kasi soki Klisto azali kati na bino, atako nzoto na bino ekokufa mpo na lisumu, kasi Molimo azali bomoi kati na bino, pamba te bokoma bato ya sembo.
11 Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.

Misala ya Bantoma 10:44-48,
44 Wana Petelo azalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka Liloba.
45 Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
46 Pamba te bayokaki bango koloba na nkota mosusu mpe kokumisa Nzambe. Bongo Petelo alobaki:
47 - Solo, moto moko te akoki koboya ete bazwa libatisi ya mayi. Bazwi Molimo Mosantu ndenge kaka biso tozwaki.
48 Boye, Petelo apesaki mitindo ete babatisa bango na Kombo na Yesu-Klisto. Bongo, basengaki na Petelo ete avanda elongo na bango mpo na mwa mikolo.

Tosengeli kotambola na pole ya Liloba.

1 Yoane 1:5-7,
5 Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino: Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.
6 Soki tolobi ete tozali moko na Ye, nzokande tozali kotambola kati na molili, wana tozali bakosi mpe tozali kotambola na solo te.
7 Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.

Mibongisa mpo na kokutana na Nzambe na yo...
Amosi 4:12

Euti na trakte... Oyo ezali Nzela. Tambolá kati na yango.
Euti na S.E. Johnson.


Site ya sango ya
Lingelesi.

Mokanda ya
Emoniseli série.

Nzambe na Siansi.
Index - Arkeoloji.

Konetolama.

Nsango malamu.
Yesu akufaki mpo
na masumu na yo.

Batisimo na Mai.

 
 

Bonzambe elimbolami.

 

Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Bikangelo Sambo.

Série Kotambola ya
Bakristu.

Nzambe na Histoire.
Masuwa ya Noa.

Lisumu ya ebandeli.
Ezalaki nde Pomme?

  Makomi elobi...

Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.

Misala ya Bantoma 4:12


Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba to PDF.


Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Chapter 8
Angel Appears

(PDF Lingelesi)

Liboso...

Nsima...

William Branham
Life Story.

(PDF Lingelesi)

How the Angel came
to me.

(PDF Lingelesi)


Hub ya messagerie... Pona monoko na yo pe télécharger ba messages ya ofele epai ya Ndeko Branham.