Nsango Malamu.


Nzambe alingaka yo.

Yoane 3:16 Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.

Bato nyonso bazali basumuki.

Barome 3:10 Moto ya sembo azali te, ata moko te;.
Barome 3:23 pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe;

Yesu azalaki mwana-mpate ya Nzambe ya kokoka.

Yoane 1:29 Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki: - Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.
Yoane 1:36 amonaki Yesu koleka mpe alobaki: «Botala Mpate ya Nzambe!»

Akufaki mpo na masumu ya mokili.

1 Yoane 2:2 Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso ; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.
Bagalatia 1:4 Yesu amipesaki mpo na masumu na biso mpo ete, kolanda mokano ya Nzambe, Tata na biso, akangola biso longwa na ekeke oyo ya mabe.

Asekwaki uta na bakufi mpo na kolakisa ete akokaki kolimbisa masumu.

Barome 10:9 Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika;
Barome 6:9 Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te ; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye.
Misala ya Bantoma 4:10 tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.

Tosengeli kondima Ye mpe kondima mbeka na Ye.

Misala ya Bantoma 16:31 Bazongisaki: - Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.
Misala ya Bantoma 15:11 Te! Biso tondimaka ete tobiki na ngolu ya Nkolo Yesu, ndenge moko kaka na bango.

Bolimbisi ya masumu ezali na Nkombo na Ye.
(Batisimo na Mai)

Misala ya Bantoma 2:38 Petelo azongiselaki bango: - Bobongola mitema; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.

Senga Ye aya ko vivre vie na Ye kati na yo.

Barome 8:11 Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.


Citation...

Sikawa, Paulo alobaki, ntango mosambeli akoya mpe komema mwana moke... Soki asali mabe, aye na mwana-mpate oyo ya moke. Sikawa, nganga-nzambe monene atalaki yango, nganga-nzambe asalaki, amonaki ete likambo moko ya mabe ezalaki te na mwana-mpate, atalaki ye, atala soki ezali malamu; mpe soko esali, nde alalisaki mwana-mpate moke o nse likolo lya etumbelo. Mpe awa aye moto oyo asalaki mabe; alobaki: “Sikoyo, nazalaki koyiba. Mpe nayebi sikoyo ete nazali na nse ya liwa, mpo nasali mabe. Nzambe akolinga te nayiba; Mobeko na ye elobi ete te.”

Sikawa, nakotia maboko na ngai likolo ya mwana-mpate moke oyo. Mpe mitindo ya Nzambe awa elobaki ete, ‘Okoyiba te,’ mpe nayibaki. Yango nazali... Nayebi nazali soumis na liwa. Eloko moko esengeli kopesa eyano mpo na lisumu na ngai, mpo nayibi. Mpe Nzambe alobaki ete mokolo nakolya yango, mokolo wana nakokufa. Yango wana nayibaki. Pe Nzambe alobaki, 'Oyibi, osengeli kokufa mpo na yango.'

Yango wana Asengaki soki nalingaki kokufa te, nasengelaki komema mwana ya mpate. Bongo nalalisi mwana ya mpate awa na nse; Natie maboko na ngai na motó ya mwana-mpate moke oyo, mpe ye kaka kolela mpe kokende liboso. Mpe nalobi, ‘Nkolo Nzambe, nazali na mawa mpo nayibi. Na confesser pe na promettre Yo nakoyiba lisusu te soki Okondima ngai kaka sikoyo. Mpe mpo na mbeka na ngai, mpe mpo na liwa na ngai, mwana-mpate moke oyo akokufa na esika na ngai.’

Ebongolami uta na...
Law or Grace (1954) - William Branham.


  Makomi elobi...

Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.

Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu: - Bandeko, tosala nini?

Petelo azongiselaki bango: - Bobongola mitema; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.

Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.

Misala ya Bantoma 2:36-39


  Boyei malamu na site ya BNL.

Boyei malamu na site internet ya The Believer's Newsletter, NZ.

Soki ozali moklisto te, lokasa oyo ezali koyebisa yo nsango malamu na ndenge ya pɛtɛɛ.

Soki ozali chrétien mais obatisi na kombo ya Nkolo Yesu Klisto te, page oyo eza pona yo.

Soki ozali moklisto mpe ozwaki batisimo na batisimo ya boklisto, okoki kolakisa bato lokasa oyo oyo ozali kotatola.

Tomekaki kosala ete nsango oyo ezala pɛtɛɛ soki likoki ezali.

Mapamboli ya boklisto,
Charles Wilson - Mobandisi.
mpe comité, ba ministères ya BNL.


  Webmaster alobi...

Esakweli ya Danyele 9:25, emonisaki mpenza ntango nini Masiya akobima na Yelusaleme (Batisimo ya Klisto - wana ezalaki tango akomaki "mopakolami") - sima ya poso 7 bakisa poso 62 (mokolo moko = mbula moko). Nzokande, bakonzi ya mokolo wana, baboyaki koyamba ye ntango akómaki. Akatamaki na katikati ya poso ya ntuku nsambo, kokokisaka makomi.

Ndima Yesu lokola Mosikoli na yo, mpe Mobikisi. (Masiya.)
- Webmaster.


Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba to PDF.


William Branham
Life Story.

(PDF Lingelesi)

How the Angel came
to me.

(PDF Lingelesi)

Chapter 13
- God is Light.

(PDF Lingelesi)

Chapter 9
- The Third Pull

(PDF Lingelesi)

As the Eagle
Stireth her nest.

(PDF Lingelesi)

Chapter 14
- Sabino Canyon

(PDF Lingelesi)

Sirs, is this the time?

(PDF Lingelesi)
Mt Sunset.
Esika lipata ebimaki.

Chapter 11
The Cloud

(PDF Lingelesi)

Site ya sango ya
Lingelesi.

Mokanda ya
Emoniseli série.

Nzambe na Siansi.
Index - Arkeoloji.

Konetolama.

Nsango malamu.
Yesu akufaki mpo
na masumu na yo.

Batisimo na Mai.

 
 

Bonzambe elimbolami.

 

Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Bikangelo Sambo.

Série Kotambola ya
Bakristu.

Nzambe na Histoire.
Masuwa ya Noa.

Lisumu ya ebandeli.
Ezalaki nde Pomme?

Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba.


Nzela ya monene
to nzela ya moke.
Bokotela na ekuke ya moke; pamba te ekuke mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene, mpe bato ebele bakotelaka wana.

Matayo 7:13.



Hub ya messagerie... Pona monoko na yo pe télécharger ba messages ya ofele epai ya Ndeko Branham.