Emoniseli Ya Santu Yoane.


  Mokanda ya Emoniseli série.

Emoniseli ya Yesu Klisto.


William Branham.

Tanga compte mobimba na...
Emoniseli ya Yesu Klisto.

Emoniseli 1:1-3,
1 Emoniseli ya Yesu Klisto, oyo Nzambe apesaki ye mpo na kolakisa na basali na Ye makambo maye masengeli kosalema kala mingi te; mpe Atindaki mwanje na ye mpo na komonisa yango epai na mosali na Ye Yoane.
2 Ye asakolaki Liloba na Nzambe mpe litatoli ya Yesu Klisto, mpe makambo nyonso oyo amonaki.
3 Esengo na moto oyo azali kotanga, mpe na baye bazali koyoka maloba ya lisakoli oyo, mpe baoyo bazali kobatela makambo maye makomami kati na yango: mpamba te ntango ekómi pene.

Mokomeli (kasi nkolo te) ya buku oyo ezali Santu Yoane. Bakundoli ya mambi ma kala bandimi ete ye abikaki eteni ya suka ya bomoi na ye na Efese, atako na ntango ya bokomami ya buku oyo, ye azalaki na esanga ya Patamo. Ezali lisolo ya bomoi ya Yoane te, kasi ezali Emoniseli ya Yesu Klisto kati na bileko oyo ekoya sima ya lingomba. Na molongo na yango ya misato, ebengami esakweli, mpe ezali mpenza yango.

Buku oyo ebéngamaka bo momesano Emoniseli Ya Santu Yoane, kasi ezali libunga. Ezali Emoniseli ya Yesu Klisto oyo epesamaki epai na Yoane mpo na Baklisto ya bileko nyonso. Ezali buku bobele moko kati na Biblia mobimba oyo ekomami na Yesu Ye moko, na nzela na komonisama na Ye epai na mokomeli moko.

Ezali buku ya suka ya Biblia, nzokande yango ezali kosakola ebandeli mpe suka ya bileko ya Nsango Malamu.

Sikawa, na lokóta ya Greki liloba oyo emoniseli ezali “apokalipisi”, oyo elingi koloba “komonisama”. Komonisama yango etalisami malamu mpenza na ndakisa ya moyemi bikeko oyo azali kozipola mosala na ye oyo ayemi, komonisáká yango polele na miso na bato. Ezali kolongola ezipeli, komonisáká na bongo polele eloko oyo ebombamaki. Boye, komonisama yango ezali bobele emoniseli ya Klisto te, kasi ezali EMONISELI YA MISALA NA YE YA MIKOLO MIKOYA KATI NA BILEKO NSAMBO YA LINGOMBA OYO EZALAKI KOYA.

Tokoki ata moke te kolobela na kolekisa ndelo na ntina na motuya, mpo na mondimi ya solo, ya emoniseli na nzela ya Molimo. Emoniseli ezali na motuya mingi mpo na bino koleka ntango mosusu ndenge bozali kokanisa. Sikawa nazali te koloba na ntina na Búku oyo ya Emoniseli ná bino. Nazali koloba na ntina na emoniseli Nyonso. Ezali mpenza na motuya mingi mpo na lingomba. Boyebi lisusu na Matai 16 esika Yesu atunaki bayekoli, motuna oyo,

13 Bato balobaka ete ngai Mwana na moto nazali nani?
14 Bango bayanolaki : bamosusu balobaka ete Ozali Yoane Mobatisi; bamosusu, Eliya; mpe bamosusu Yelemia, to moko na basakoli.
15 Alobaki na bango: Kasi bino bolobi ete Ngai nazali nani?
16 Bongo Simona Petelo ayanolaki mpe alobaki: Yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe na bomoi.
17 Mpe Yesu alobaki na ye ete: opambolami, Simona mwana na Yona; mpamba te mosuni mpe makila emonisi yango epai na yo te, kasi ezali Tata na Ngai oyo Azali na likolo.
18 Boye Ngai nayebisi yo ete Yo ozali Petelo, mpe likolo na libanga oyo Nakotonga lingomba na Ngai; mpe bikuke ya ewelo ekoki kolonga yango te.

Bakatoliko ya Roma balobaka ete lingomba etongami likolo na Petelo. sikawa, wana ezali mpeza komona makambo na ndenge ya mosuni. Ndenge nini Nzambe akoki kotonga lingomba likolo na moto oyo azalaki kotatabana na lolenge ete awanganaki Nkolo Yesu mpe alakaki mabe wana ezalaki ye kosala yango? Nzambe akoki te kotonga lingomba na Ye likolo na moto oyo abotami kati na lisumu. Mpe ezalaki te libanga moko oyo evandaki wana lokola nde Nzambe abulisaki mabele na esika yango. Mpe ezali te lokola ba-Protestant balobaka, ete lingomba etongami likolo na Yesu. Ezalaki EMONISELI. Botánga yango ndenge ekomami: “Nzoto ná makila nde EMONISI yango te, KASI TATA NA NGAI NDE AMONISI YANGO, bongo LIKOLO YA LIBANGA OYO (EMONISELI) NAKOTONGA LINGOMBA NA NGAI.” Lingomba etongami likolo na Emmoniseli, likolo na “Yango Elobi Nkolo”.

Ndenge nini Abele ayebaki eloko asengelaki kosala mpo na kopesa mbeka oyo ebongi epai na Nzambe? Na nzela ya kondima azuaki emoniseli ya makila. Kaina azuaki emoniseli ya bongo te (atako azalaki na mobeko) yango wana akokaki te kopesa mbeka ya malamu. Ezalaki emoniseli kouta na Nzambe nde esalaki bokeseni mpe epesaki bomoi ya seko na Abele. Sikawa, okoki kozua eloko mokambi alobi, to oyo likindo ezali koteya, mpe atako bakoki koteya yo yango na maloba makasi ndenge nini, ntango nyonso Nzambe amonisi yo te ete Yesu azali Klisto, ete makila nde ezali kopetola yo, mpe ete Nzambe azali Mobikisi na yo, okozua ata moke te bomoi na seko. Ezali emoniseli ya Molimo nde ezali kosala yango.

Bongo nalobaki ete Buku oyo ya Emoniseli ezali emoniseli ya Yesu mpe makambo Azali kosala kati na mangomba ya bileko oyo nsambo. Ezali emoniseli mpo ete bayekoli, bango moko, bayebaki te bosolo yango oyo ekomami. Yango emonisamaki liboso te epai na bango. Bomikanisela ete bayaki epai na Yesu na Buku ya Misala mpe batunaki Ye: “Ezali na ntango oyo nde Okozongisela Yisalaele bokonzi ?” Bongo Ye Alobaki: “Ezali likambo na bino te ya koyeba bantango to bileko.” Mibali yango bazalaki naino kokanisa ete Yesu alingaki kozala na bokonzi ya mokili oyo. Kasi bokonzi oyo Ye alingaki kotonga ezalaki bokonzi ya molimo. Akokaki ata koyebisa bango esika na Ye kati na yango te, mpamba te Tata amonisáki Ye yango te. Kasi sikawa, nsima na liwa mpe lisekwa na Ye, mpe na ntango oyo ya mosala na Ye ya molobeli, Azali na makoki ya kotalisa awa kati na emoniseli oyo ya Ye Moko epai na Yoane, eloko nini Nkembo mpe bozali na Ye ekozala mpe ekosála kati na lingomba.

Kati na emoniseli oyo, Ayebisi biso suka na zabolo. Atalisi lolenge Akosilisa ná Zabolo mpe Akobwaka ye kati na etima ya móto. Amonisi suka ya bato mabe oyo bazali kolanda Satana. Boye Satana ayinaka yango.

Bosílá komona ndenge Satana azali koyina babuku mibale ya Biblia koleka babuku misusu nyonso? Na nzela ya bato na likindo mpe ya baoyo bamibengaka bato na mayele, azali ntango nyonso kobundisa Buku ya Ebandeli ná Buku ya Emoniseli. Kati na babuku mibale oyo tomoni ebandeli ya Satana, banzela na ye ya nsomo mpe kobebisama na ye. Yango nde ntina abundisaka babuku wana. Ayinaka ete átálisama polele, mpe kati na babuku yango, emonisami polele mpenza oyo ye azali. Yesu alobaki na ntina na Satana: “Azali na eteni moko te kati na Ngai mpe Ngai nazali na eteni kati na ye te.” Zabolo akolinga kotalisa ete ezali bongo te; kasi akoki te, na bongo azali kosala manso akoki mpo na kobebisa kondima ya bato kati na Liloba. Kasi soki lingomba eboyi kondimela Satana mpe endimi emoniseli ya Liloba na nzela ya Molimo, bikuke ya ewelo ekoki kolonga ye te.

Tika názwa mwa ndakisa moko awa na mosala na ngai moko ya koteya, soki bolingi. Bino nyonso boyebi ete nazali na likabo moko ya kokamwa na bomoi na ngai. Ezali likabo moko oyo na nzela na yango Molimo Mosantu akoki kososola makono, makanisi ya mitema na bato, ná mpe makambo mosusu ya kobombama oyo bobele Nzambe akoki koyeba mpe na sima komonisa yango na ngai. Nakolinga ete bótéléma elongo na ngai mpe bómóna bilongi ya bato ntango Satana ayebi ete akotálisama polele. Sikawa, nazali kolobela na ntina na bato te. Kasi likambo ezali ete Satana azali kokonza bomoi na bango na nzela ya lisumu, botali makambo likolo likolo, mpe bokono. Kasi bosengeli komona bilongi na bango. Satana ayebi ete akotalisama polele, na yango mbongwana ya lolenge mosusu ezali kosalema na bilongi ya bato. Satana azali kobanga. Ayebi ete Molimo na Nzambe ebelemi mpo na komonisa bato misala na ye. Yango nde ntina ayinaka mpenza mayangani oyo. Ntango bankombo bizali kobengama mpe bokono komonisama, Satana ayinaka yango. Sikawa yango ezali nini? Ezali botangi ya makanisi te, ezali telepati te, ezali mpe kindoki te. Ezali EMONISELI na nzela ya Molimo Mosantu. Yango nde nzela bobele moko nakoki koyeba yango. Na ntembe te, moto ya makanisi ya mosuni akobenga yango nkombo nyonso, kasi akobenga yango Molimo Mosantu te.

Botika natalisa bino ntina mosusu mpo na yango Satana ayinaka Buku oyo ya Emoniseli na Yesu Klisto kati na lingomba. Ayebi ete Yesu Klisto azali ndenge moko lobi loleki, lelo mpe libela, mpe Abongwanaka te. Ayebi makambo mingi mpenza koleka oyo bato likindo ntuku libwa likolo na monkama bayebi. Ayebi ete lokola Nzambe abongwanaka te kati na bizaleli na Ye, na bongo Abongwanaka mpe te na lolenge na Ye ya kosala. Satana ayebi na ye ete lingomba ya ebandeli na Pantekote, ná nguya ya Nzambe (Malako 16 kati na mosala) ezali Lingomba ya Solo, oyo Yesu azali koloba ete ezali ya Ye. Mosusu nyonso ezali ya lokuta. Na ntembe te.

Sikawa, bomikanisela likambo oyo. Klisto kati na Lingomba ya Solo ezali kolandana ya Buku ya Misala. Kasi Buku ya Emoniseli ezali kotalisa ndenge nini molimo ya motemeli ya Klisto akokota kati na lingomba mpe akokomisa yango mbindo, móto te mpe mpio te, na makambo ya libanda mpe ezangi nguya. Ezali kotalisa Satana polele, komonisáká misala na ye (komeka koboma bato ya Nzambe mpe bobebisi lokumu ya Liloba na Nzambe), kino na ntango akobwakama na libeke na móto. Satana azali kobundisa yango. Akoki koyikela yango mpiko te. Ayebi ete soki bato bazwi EMONISELI YA SOLO ya LINGOMBA YA SOLO mpe oyo yango ezali, eloko nini azali kobunda mpo na yango, mpe lisusu AKOKI KOSALA MISALA MINENE KOLEKA, wana akozala lipinga oyo ekoki kolongama te. Soki bazwi emoniseli ya solo ya milimo mibale oyo ezali kosala makambo kati na lingomba ya Baklisto, mpe na nzela ya Molimo na Nzambe, basosoli mpe batelemeli molimo ya motemeli na Klisto, Satana akozala na nguya te liboso na Lingomba yango. Ye akolonga mpenza te lelo, kaka lokola na ntango oyo Klisto atemelaki makasi na ye nyonso ntango alingaki kozwa bokonzi likolo na Ye na biliki. Iyo, Satana ayinaka emoniseli. Kasi biso tolingaka yango. Ná emoniseli ya solo kati na bomoi na biso, bikuke ya ewelo ekoki kolonga biso te, kasi biso tokolonga na yango.

Bobosana te ndenge nalobaki na ebandeli ya liteya oyo ete Buku oyo tozali kotanga ezali emoniseli ya solosolo ya Yesu Ye moko kati na lingomba mpe mosala na Ye na bileko oyo ezali koya. Na sima nalobaki ete esengeli Molimo Mosantu mpo na kopesa biso emoniseli; soki bongo te tokozánga kozua yango te. Na komemáká makanisi oyo mibale elongo, bokomona ete ekosenga bobele boyekoli ya mpamba ná kokanisa te mpo na kokómisa Búku oyo solo. Ekosengela mpo na yango mosala ya Molimo Mosantu. Elingi koloba ete Buku oyo ekoki komonisama na moto nyonso te kasi bobele na bato ya lolenge mosusu. Ekosenga moto oyo azali na bososoli to lolenge ya mosakoli. Ekosenga makoki ya koyoka Nzambe koloba. Ekosénga kolakisama ya molimo, ezali kaka te kokokanisa eteni moko ya makomi na mosusu, atako kosala bongo ezali na yango malamu. Kasi libombami eséngaka kolakisama ya Molimo, soki te ekososolama te. Boni tosengeli mpenza koyoka Nzambe mpe komifungola mpe komikaba na Molimo mpo na koyoka mpe koyeba.

Ndenge nasilaki koloba, Buku oyo (Emoniseli) ezali suka ya Makomi. Etiami kutu na suka kati na kanó ya Makomi; esika esengeli kozala. Sikawa bokoki koyeba mpo na nini elobami ete moto soko nani oyo akotánga to mpe akoyóka yango apambwami. Ezali emoniseli ya Nzambe nde ekopesa yo bokonzi likolo na diabulu. Bokoki mpe komona mpo na nini baoyo bakobakisa to kolongola uta na yango bakolakama mabe. Ekosengela kozala bongo, mpamba te nani akoki kobakisa to kolongola uta na emoniseli oyo ebongi be ya Nzambe bongo alónga monguna? Ezali na yango pete. Eloko moko te ezali oyo ekokani na nguya ya kolonga lokola emoniseli ya Liloba. Bomoni, na molongo ya misato, lipamboli ezali kopesama na baoyo bazali kotia bokebi ya ndenge mosusu na Buku oyo. Nakanisi ete yango ezali kolobela momesano ya banganga-nzambe na Kondimana na Kala, ya kotanga Liloba liboso na eyanganelo na ntongo. Bomoni, bato mingi bayebaki kotanga te na bongo nganganzambe asengelaki kotanga mpo na bango. Lokola ezalaki Liloba, lipamboli ezalaki wana. Ata soki bazalaki kotanga to soki bazalaki koyoka yango.

“Ntango ekómi pene.” Ntango ebélémáki liboso te. Na bwanya mpe mwango na Nzambe, emoniseli oyo ya nguya (ata eyebamaki mobimba na Nzambe), ekokaki kopesama te na ntango wana. Na yango biso toyekoli libongi moko... emoniseli ya Nzambe mpo na eleko moko na moko ekoki koya bobele na eleko yango, mpe na ntango moko ya sikisiki. Botala lisolo ya Yisalaele. Emoniseli ya Nzambe epai na Mose eyaki bobele na ntango moko boye ya mambi ma kala, mpe eyaki mpenza-mpenza na ntango bato balelaki epai na Nzambe. Yesu, Ye moko, ayaki na litondi ya ntango, Ye oyo Azali Emoniseli mobimba ya Bonzambe. Mpe na eleko oyo (Laodikia), emoniseli ya Nzambe ekoya na ntango oyo ebongi. Ekoumela te, ekoya mpe liboso na ntango na yango te. Bokanisa likolo na yango mpe botia bokebi, mpamba te tozali kati na mikolo ya suka lelo.

Tanga compte mobimba na...
Emoniseli ya Yesu Klisto.


Site ya sango ya
Lingelesi.

Mokanda ya
Emoniseli série.

Nzambe na Siansi.
Index - Arkeoloji.

Konetolama.

Nsango malamu.
Yesu akufaki mpo
na masumu na yo.

Batisimo na Mai.

 
 

Bonzambe elimbolami.

 

Acts of the Prophet.

(PDFs Lingelesi)

Bikangelo Sambo.

Série Kotambola ya
Bakristu.

Nzambe na Histoire.
Masuwa ya Noa.

Lisumu ya ebandeli.
Ezalaki nde Pomme?

  Makomi elobi...

Tango mabele oyo enokelaka mvula emelaka mayi mpe ebotaka matiti ya tina mpo na bato oyo baloneli yango, Nzambe apambolaka yango.

Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka lisusu na tina te, ezalaka mosika te ya kolakelama mabe, mpe esukaka na kozika na moto.

Ba-Ebre 6:7-8



Mokanda ya Emoniseli.
Ekobi na lokasa elandi.
(Emoniseli ya Yesu Klisto.)



 

Finá na elilingi moko mpo na kozwa elilingi ya bonene mobimba to PDF.


Acts of the Prophet

(PDFs Lingelesi)

Marriage and Divorce.

(PDF Lingelesi)

William Branham
Life Story.

(PDF Lingelesi)

How the Angel came
to me.

(PDF Lingelesi)


Hub ya messagerie... Pona monoko na yo pe télécharger ba messages ya ofele epai ya Ndeko Branham.